Marc 3Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Yesu a koti lisusu na synagogue. Kuna, ezalaki na mutu moko oyo loboko na ye e kufaki.2Bazalaki ko tala Yesu pona ko mona soki ako bikisa mutu yango na mokolo ya sabbat, pona ba zwa likambu ya ko funda ye.3Yesu a lobi na mutu oyo loboko e kufaki: "Telema awa na kati."4Après, a tuni bango: "Na mokolo ya sabbat, mibeko e pesi nzela ya ko sala bolamu to mabe? Ya ko bikisa mutu to ko boma ye?" Mais ba vandi kimia.5Yesu a tali bango na kanda, pe a yoki mawa pona mitema na bango oyo e komaki makasi. A lobi na mutu yango: "Sembola loboko na yo." A semboli yango, pe loboko na ye e biki.6Ba Pharisiens ba bimi, pe mbala moko ba yokani na batu ya parti ya Hérode pona ko luka ndenge ya ko bomisa Yesu.7Yesu a longwe wana, a keyi pembeni ya ebale elongo na ba disciples na ye. Ebele ya batu ba landi ye wuta na Galilée.8Batu ebele ba wuti pe na Judée, Jérusalem, Idumée, ngambo mosusu ya Jourdain, pe bisika ya pembeni ya Tyr na Sidon. Ba yoki makambu nionso oyo azalaki ko sala, pe ba ye epai na ye.9A yebisi ba disciples na ye ba bongisela ye mwa bwato, pona ebele ya batu ba finafina ye te.10Po lokola azalaki kobikisa batu mingi, babeli nionso bazalaki ko pusana na makasi pona ko simba ye.11Tangu milimo mabe ezalaki ko mona ye, ezalaki ko fukama liboso na ye pe ko ganga: "Oza Mwana ya Nzambe!"12Mais azalaki ko pekisa yango makasi ete e yebisa batu te soki aza nani.13Après, a mati na ngomba. A bengi batu oyo a lingaki, pe ba ye epai na ye.14A poni batu douze pona ba zala elongo na ye,15pe pona a tinda bango ko sakola, na pouvoir ya ko bengana milimo mabe.16Tala batu douze oyo a poni: Simon, oyo a pesi kombo Pierre;17Jacques, mwana ya Zébédée, pe Jean, ndeko ya Jacques. A pesi bango kombo Boanergès, oyo elakisi bana ya kake;18André, Philippe, Barthélemy, Matthieu, Thomas, Jacques mwana ya Alphée, Thaddée, Simon oyo ya Cananite,19pe Judas Iscariot, oyo a tekaki Yesu.20Ba keyi na ndaku. Ebele ya batu ba sangani lisusu, tii Yesu na ba disciples ba koki ata ko lia te.21Tangu bato ya famille na ye ba yoki oyo ezalaki ko salema, ba ye pona ko kamata ye, po bazalaki ko loba: "A komi liboma."22Balakisi ya mibeko oyo ba wutaki na Jérusalem bazalaki ko loba: "Aza na Béelzébul na kati na ye. Azo bengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe."23Yesu a bengi bango pe a lobeli bango na ba paraboles: "Ndenge nini Satana a koki ko bengana Satana?24Soki bokonzi e kabwani contre yango moko, bokonzi wana ekowumela te.25Soki libota e kabwani contre yango moko, libota wana eko telema te.26Donc soki Satana a bundisi ye moko pe a kabwani, a koki ko wumela te; suka na ye e komi.27Mutu a koki ko kota na ndaku ya mutu ya makasi pona ko botola biloko na ye te, soki a kangi nanu mutu yango te. Sima ya ko kanga ye, nde a koki ko botola biloko ya ndaku na ye.28Na yebisi bino ya solo: batu bako limbisama masumu nionso pe maloba nionso ya kofinga Nzambe oyo bako loba.29Mais mutu oyo ako finga Molimo Mosantu ako limbisama ata mokolo moko te. Ako zala na ngambo ya lisumu oyo eko suka te."30Yesu a lobaki bongo po bazalaki ko loba: "Aza na molimo mabe."31Mère na ye pe bandeko na ye ya mibali ba ye. Ba telemi libanda pe ba tindi mutu a benga ye.32Ebele ya batu ba vandaki zingazinga na ye. Ba lobi na ye: "Tala, mère na yo pe bandeko na yo baza libanda, bazo luka yo."33A zongisi: "Mère na ngai aza nani? Pe bandeko na ngai baza banani?"34A tali batu oyo ba vandaki zingazinga na ye pe a lobi: "Tala mère na ngai pe bandeko na ngai!35Po mutu oyo a salaka mokano ya Nzambe, ye nde aza ndeko na ngai ya mobali, ndeko na ngai ya mwasi pe mère na ngai."‹ Précédent