Matthieu 28Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Après sabbat, na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya semaine, Marie ya Magdala pe Marie mosusu ba keyi ko tala lilita.2Mbala moko, mabele e ningani makasi. Po ange moko ya Nkolo a kitaki wuta na likolo, a ye ko tindika libanga pe a vandi likolo na yango.3Azalaki ko ngenga lokola mokalikali, pe elamba na ye ezalaki pembe lokola neige.4Ba gardes ba ningani na somo pe ba komi lokola batu bakufi.5Mais ange a zui maloba pe a lobi na basi: "Bino, bo banga te. Na yebi que bozo luka Yesu oyo ba bakaki na ekulusu.6Aza awa te. A sekwi ndenge a lobaki. Bo ya ko tala esika a lalaki.7Pe bo kende noki ko yebisa ba disciples na ye que a sekwi parmi bakufi. Tala, azo kende na Galilée liboso na bino. Kuna nde boko mona ye. Tala, na yebisi bino yango."8Ba longwe noki na lilita, na somo pe na esengo monene. Ba poti mbangu pona ko mema sango na ba disciples.9Mbala moko, Yesu a ye ko kutana na bango pe a lobi: "Mbote na bino!" Ba pusani, ba simbi makolo na ye pe ba fukami liboso na ye.10Alors Yesu a lobi na bango: "Bo banga te. Bo kende ko yebisa bandeko na ngai ba kende na Galilée. Kuna nde bako mona ngai."11Tangu basi bazalaki na nzela, ba gardes mosusu ba koti na ville pe ba yebisi ba chefs ya ba nganga-nzambe makambu nionso oyo e salemaki.12Ba chefs ba sangani na ba anciens pe ba sali conseil. Ba pesi ba soldats mbongo mingi13pe ba lobi: "Bo loba: Ba disciples na ye ba ye na butu ko yiba ye tangu tozalaki ko lala.14Soki gouverneur a yoki yango, toko solola na ye, toko kitisa motema na ye pe toko bimisa bino na problème."15Ba soldats ba zui mbongo pe ba sali ndenge ba tindaki bango. Sango wana e panzani parmi ba Juifs tii lelo.16Ba disciples 11 ba keyi na Galilée, na ngomba oyo Yesu a lakisaki bango.17Tangu ba moni ye, ba fukami liboso na ye. Mais ba mosusu bazalaki na doute.18Yesu a pusani pe a lobi na bango: "Ba pesi ngai pouvoir nionso na likolo pe na mokili.19Alors bo kende, bo komisa batu ya bikolo nionso ba disciples. Bo batisa bango na kombo ya Tata, ya Mwana pe ya Molimo Mosantu.20Bo teya bango ko tosa nionso oyo na tindaki bino. Pe tala, naza elongo na bino mikolo nionso, tii na suka ya mokili."‹ Précédent