Matthieu 24Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Tangu Yesu a bimi na temple pe azalaki ko kende, ba disciples na ye ba pusani pona ko lakisa ye bandako ya temple.2Mais a lobi na bango: "Bo moni biloko oyo nionso? Na lobi na bino ya solo: awa, libanga moko te eko tikala likolo ya libanga mosusu sans que e bukama."3A vandi na ngomba ya ba oliviers. Ba disciples ba ye epai na ye kaka bango moko pe ba tuni: "Yebisa biso, makambu wana eko salema tangu nini? Elembo nini eko lakisa koya na yo pe suka ya mokili?"4Yesu a zongiseli bango: "Bo keba, mutu moko te a kosa bino.5Po batu mingi bako ya na kombo na ngai, bako loba: Ngai nde Kristu. Pe bako kosa batu mingi.6Boko yoka basango ya bitumba pe ba rumeurs ya bitumba. Bo keba, bo tungisama te. Makambu wana esengeli e salema, mais eko zala nanu suka te.7Ekolo moko eko telemela ekolo mosusu, pe bokonzi moko eko telemela bokonzi mosusu. Nzala pe koningana ya mabele eko zala na bisika ndenge na ndenge.8Makambu wana nionso eko zala kaka ebandeli ya pasi.9Alors bako pesa bino na maboko ya ba nyokoli pe bako boma bino. Bikolo nionso eko yina bino pona kombo na ngai.10Na tangu wana, batu mingi bako kweya, bako tekana pe bako yinana.11Ba prophètes mingi ya lokuta bako bima pe bako kosa batu mingi.12Lokola mabe eko zala mingi, bolingo ya batu mingi eko kita.13Mais mutu oyo ako kanga motema tii na suka, ako bikisama.14Sango malamu oyo ya bokonzi eko teyama na mokili mobimba, pona ko zala témoignage na bikolo nionso. Alors suka eko ya.15Yango wana, tangu boko mona eloko ya nkele oyo e memaka libebi, oyo mosakoli Daniel a lobelaki, e telemi na esika mosantu, mutu oyo azo tanga a tia likebi16na tangu wana, batu oyo bako zala na Judée ba kima na bangomba.17Mutu oyo ako zala na likolo ya ndako a kita te pona ko zwa biloko na kati ya ndako na ye.18Pe mutu oyo ako zala na bilanga a zonga sima te pona ko zwa manteau na ye.19Mawa na basi oyo bako zala na zemi pe ba oyo bako zala ko melisa bana mabele na mikolo wana!20Bo bondela ete kokima na bino e salema na hiver te, pe na mokolo ya sabbat te.21Po na tangu wana, pasi eko zala monene ndenge e zala nanu te banda ebandeli ya mokili tii lelo, pe eko zala lisusu ndenge wana ata mokolo moko te.22Soki ba kitisaki nombre ya mikolo wana te, mutu moko te alingaki ko bika. Mais pona ba ponami, bako kitisa nombre ya mikolo wana.23Na tangu wana, soki mutu a lobi na bino: Kristu aza awa, to aza kuna, bo ndima te.24Po ba Kristu ya lokuta pe ba prophètes ya lokuta bako bima. Bako sala bikamwa minene pe ba miracles, pona ko kosa ata ba ponami soki ezalaki possible.25Tala, na yebisi bino yango liboso e salema.26Alors soki ba yebisi bino: Tala, aza na désert, bo kende kuna te. To: Tala, aza na ba chambres, bo ndima te.27Po ndenge kake e bimaka na est pe e monanaka tii na ouest, ndenge wana pe eko zala koya ya Mwana ya mutu.28Esika nionso ebembe eza, ba aigles bako sangana wana.29Mbala moko après mikolo wana ya pasi, moi eko koma molili, sanza eko pesa lisusu pole na yango te, minzoto eko kweya wuta na likolo, pe ba puissances ya likolo eko ningana.30Alors elembo ya Mwana ya mutu eko monana na likolo. Mabota nionso ya mokili bako lela, pe bako mona Mwana ya mutu azo ya na mapata ya likolo, na nguya pe nkembo monene.31Ako tinda ba anges na ye na son ya trompette ya makasi. Bako sangisa ba ponami na ye wuta na bangambo nionso quatre, banda suka moko ya likolo tii na suka mosusu.32Bo yekola na exemple ya nzete ya figues. Tangu bitape na yango e komi pete pe makasa e bandi ko bima, bo yebaka que été e komi pene.33Bino pe ndenge moko: tangu boko mona makambu wana nionso, bo yeba que Mwana ya mutu aza pene, na porte.34Na lobi na bino ya solo: génération oyo eko leka te avant makambu wana nionso e salema.35Likolo pe mabele eko leka, mais maloba na ngai eko leka te.36Pona mokolo pe heure, mutu moko te ayebi yango, ata ba anges ya likolo, ata Mwana. Kaka Père nde ayebi.37Ndenge e salemaki na tangu ya Noé, ndenge wana pe eko salema na koya ya Mwana ya mutu.38Po na mikolo liboso ya déluge, batu bazalaki ko lia pe ko mela, ko bala pe ko balisa bana na bango, tii mokolo Noé a kota na arche.39Ba yebaki eloko te tii déluge e yaki pe e memaki bango nionso. Eko zala ndenge moko na koya ya Mwana ya mutu.40Alors na mibali mibale oyo bako zala na elanga: bako zwa moko, bako tika mosusu.41Na basi mibale oyo bako zala ko nika mbuma na libanga: bako zwa moko, bako tika mosusu.42Yango wana bo lala pongi te, po bo yebi te mokolo Nkolo na bino ako ya.43Bo yeba malamu: soki nkolo ndako ayebaki na heure nini ya butu moyibi alingaki ko ya, alingaki ko lala te pe alingaki ko tika te moyibi a buka ndako na ye pona ko kota.44Yango wana, bino pe bo zala prêt. Po Mwana ya mutu ako ya na heure oyo bozo kanisa te.45Alors nani aza serviteur ya sembo pe ya mayele, oyo nkolo na ye a tié responsable ya batu ya ndako na ye pona ko pesa bango bilei na tangu oyo e sengeli?46Esengo na serviteur oyo nkolo na ye, tangu ako ya, ako kuta ye azo sala bongo!47Na lobi na bino ya solo: ako tia ye responsable ya biloko na ye nionso.48Mais soki eza serviteur mabe, a lobi na motema na ye: Nkolo na ngai azo wumela ko ya,49pe a bandi ko beta baninga na ye ya mosala, ko lia pe ko mela na ba langwi masanga,50nkolo ya serviteur wana ako ya na mokolo oyo a zeli te pe na heure oyo ayebi te.51Ako kata ye biteni, pe ako pesa ye part na ye elongo na ba hypocrites. Kuna nde bako lela pe bako lia minu."‹ Précédent