Marc 4Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Yesu a bandi lisusu ko teya pembeni ya ebale. Ebele ya batu ba sangani pene na ye. Alors a mati pe a vandi na bwato na mayi, pendant que batu nionso ba telemi na libongo.2A teyi bango makambu mingi na ba paraboles. Na mateya na ye, a lobi:3"Bo yoka! Moloni moko a bimi pona ko lona.4Tangu azalaki ko bwaka ba mbuma, ndambu e kweyi pembeni ya nzela. Ba ndeke ba ye pe ba lie yango.5Ndambu mosusu e kweyi na esika ya mabanga, esika mabele ezalaki mingi te. E bimi noki, po mabele ezalaki mozindo te.6Mais tangu moyi e bimi, e tumbi yango. Pe lokola ezalaki na misisa te, e kauki.7Ndambu mosusu e kweyi na kati ya ba nzube. Ba nzube e koli pe e fini yango, pe e boti mbuma te.8Mais ndambu mosusu e kweyi na mabele ya malamu. E bimi, e koli pe e boti mbuma: moko e boti 30, mosusu 60, pe mosusu 100."9Après, a lobi: "Oyo aza na matoyi ya ko yoka, a yoka!"10Tangu a tikali ye moko, batu oyo bazalaki pene na ye, elongo na ba disciples douze, ba tuni ye na tina ya ba paraboles.11A lobi na bango: "Bino bo pesami ko yeba secret ya bokonzi ya Nzambe. Mais pona batu ya libanda, makambu nionso e lobamaka na ba paraboles,12pona ba tala, mais ba mona te; ba yoka, mais ba comprendre te; noki te ba bongola mitema pe masumu na bango e limbisama."13A lobi lisusu: "Bo comprendre parabole oyo te? Alors ndenge nini boko comprendre ba paraboles nionso?14Moloni azo lona liloba.15Batu mosusu baza lokola ba mbuma oyo e kweyi pembeni ya nzela, esika liloba e lonami. Tangu kaka ba yoki yango, Satana a ye pe a longoli liloba oyo e lonamaki na kati na bango.16Bamosusu baza lokola ba mbuma oyo e kweyi na esika ya mabanga. Tangu ba yoki liloba, ba yambi yango mbala moko na esengo.17Mais yango e zui misisa na kati na bango te; ba kangamaka na yango kaka pona mwa tangu. Dès que pasi to minioko e yeli bango pona liloba, ba kweyaka.18Bamosusu baza lokola ba mbuma oyo e kweyi na kati ya ba nzube. Ba yokaka liloba,19mais ba soucis ya bomoi, lokuta ya bomengo pe posa ya biloko mosusu e kotaka na mitema na bango, e finaka liloba, pe yango e botaka mbuma te.20Mais bamosusu baza lokola ba mbuma oyo e kweyi na mabele ya malamu. Ba yokaka liloba, ba yambaka yango pe ba botaka mbuma: moko trente, mosusu soixante, pe mosusu cent."21A lobi lisusu: "Ba memaka mwinda pona ko tia yango na se ya kitunga to na se ya mbeto? Eza pona ko tia yango na esika na yango ya likolo te?22Po eloko moko te e bombami oyo eko monana te. Secret moko te eza oyo eko bima polele te.23Soki mutu aza na matoyi ya ko yoka, a yoka!"24A lobi lisusu: "Bo sala attention na oyo bozo yoka. Mesure oyo bozo salela pona ba mosusu, yango nde bako salela pona bino, pe bako bakisela bino lisusu.25Po mutu oyo aza na eloko, bako pesa ye lisusu. Mais mutu oyo aza na rien, bako botola ye ata oyo aza na yango."26A lobi lisusu: "Bokonzi ya Nzambe eza lokola mutu oyo a bwaki ba mbuma na mabele.27A lala to a lamuka, na butu to na moyi, ba mbuma e bimaka pe e kolaka, sans que ye a yeba ndenge ezo salema.28Mabele e botaka yango moko: liboso lititi, après épi, pe na suka ba mbuma ya blé oyo e komeli na kati ya épi.29Tangu kaka mbuma e komeli, mutu a zwaka mbeli ya kobuka, po tangu ya kobuka e komi."30A lobi lisusu: "Toko kokanisa bokonzi ya Nzambe na nini? Parabole nini toko salela pona ko lakisa yango?31Eza lokola mbuma ya moutarde. Tangu ba loni yango na mabele, eza mbuma oyo eleki moke na kati ya ba mbuma nionso ya mokili.32Mais après ko lona yango, e kolaka pe e lekaka ndunda nionso. E bimisaka bitape minene, tii ba ndeke ya likolo ba koki ko vanda na elili na yango."33Azalaki ko yebisa bango liloba na ba paraboles mingi ya ndenge wana, selon oyo ba kokaki ko comprendre.34Azalaki ko lobela bango kaka na ba paraboles. Mais tangu a tikalaki kaka na ba disciples na ye, azalaki ko limbolela bango nionso.35Kaka na mokolo wana, na pokwa, Yesu a lobi na bango: "To katisa na ngambo mosusu."36Après ko zongisa ebele ya batu, ba memi Yesu na bwato kaka ndenge azalaki. Babwato mosusu pe ezalaki elongo na ye.37Mopepe moko ya makasi e bandi ko pepa. Mbonge ezalaki ko beta pe ko kota na bwato, tii bwato e bandi ko tonda na mayi.38Mais Yesu azalaki ko lala na sima ya bwato, motó na coussin. Ba lamusi ye pe ba lobi: "Moteyi, ezo tungisa yo te ete tozo kufa?"39A lamuki, a pameli mopepe pe a lobi na ebale: "Kimia! Vanda nye!" Mopepe e sili, pe kimia monene e zongi.40Après, a lobi na bango: "Pona nini bozo banga boye? Ndenge nini boza na kondima te?"41Somo monene e zui bango. Ba bandi ko tunana: "Oyo aza nani, pona ata mopepe na ebale e tosa ye?"‹ Précédent