Matthieu 18Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Na moment wana, ba disciples ba pusani pene ya Yesu pe ba tuni: "Nani aza monene koleka na bokonzi ya likolo?"2Yesu a bengi mwana moko ya muke pe a tié ye na kati na bango.3A lobi: "Na lobi na bino ya solo: soki bo bongwani te pe bo komi lokola bana mike te, bokoki ko kota na bokonzi ya likolo te.4Yango wana, mutu oyo ako komikitisa lokola mwana oyo ya muke, ye nde aza monene koleka na bokonzi ya likolo.5Pe mutu oyo a yambi mwana ya muke lokola oyo na kombo na ngai, a yambi ngai moko.6Mais soki mutu a kweyisi moko ya bana mike oyo ba ndimeli ngai, ekozala malamu koleka pona ye ba kanga ye libanga monene oyo ba nikelaka mbuma na kingo pe ba bwaka ye na mozindo ya ebale.7Mawa na mokili pona makambu oyo e kweyisaka batu! Makambu wana esengeli e ya, mais mawa na mutu oyo eko ya na nzela na ye!8Soki loboko to lokolo na yo e kweyisaka yo, kata yango pe bwaka yango loin na yo. Eza malamu ko kota na bomoi na lokolo moko to loboko moko, koleka ko zala na makolo mibale to maboko mibale pe ba bwaka yo na moto ya seko.9Pe soki liso na yo e kweyisaka yo, longola yango pe bwaka yango loin na yo. Eza malamu ko kota na bomoi na liso moko, koleka ko zala na miso mibale pe ba bwaka yo na moto ya lifelo.10Bo keba, bo tiola ata moko ya bana mike oyo te. Po na lobi na bino: ba anges na bango na likolo ba monaka tango nionso elongi ya Père na ngai oyo aza na likolo.11Po Mwana na moto a yaki ko sauver oyo e bungaki.12Bo kanisi nini? Soki mutu aza na bameme 100 pe moko e bungi, ako tika ba 99 na bangomba te pona ko kende ko luka oyo e bungi?13Pe soki a moni yango, na lobi na bino ya solo: ako sepela pona yango koleka pona ba 99 oyo e bungaki te.14Ndenge moko, Père na bino oyo aza na likolo a lingi te ata moko ya bana mike oyo a bunga.15Soki ndeko na yo a sali lisumu, kende ko lakisa ye faute na ye, kaka yo na ye mibale. Soki a yoki yo, o zongisi ndeko na yo na nzela malamu.16Mais soki a yoki yo te, mema mutu moko to batu mibale elongo na yo, pona likambu nionso e ndimama na témoignage ya batu mibale to misato.17Soki a boyi ko yoka bango, yebisa Église. Pe soki a boyi pe ko yoka Église, zwa ye lokola païen to mofutisi mpako.18Na lobi na bino ya solo: nionso oyo boko kanga awa na mokili eko kangama na likolo, pe nionso oyo boko fungola awa na mokili eko fungwama na likolo.19Na lobi lisusu na bino: soki batu mibale parmi bino ba yokani awa na mokili pona ko senga eloko, Père na ngai oyo aza na likolo ako pesa bango yango.20Po esika batu mibale to misato ba sangani na kombo na ngai, naza na kati na bango."21Alors Pierre a pusani pene na ye pe a tuni: "Nkolo, soki ndeko na ngai a saleli ngai lisumu, esengeli na limbisaka ye mbala boni? Tii sept fois?"22Yesu a zongiseli ye: "Na lobi na yo mbala sept te, mais mbala 70 fois sept.23Yango wana, bokonzi ya likolo eza lokola roi moko oyo a lingaki ba serviteurs na ye ba pesa ye compte.24Tangu a bandi ko sala ba comptes, ba memeli ye serviteur moko oyo azalaki na niongo ya ba talents 10 000.25Lokola azalaki na eloko ya ko futa te, nkolo na ye a pesi ordre ba teka ye, mwasi na ye, bana na ye pe biloko na ye nionso, pona ko futa niongo.26Serviteur a kweyi na mabele, a fukami liboso na ye pe a lobi: "Nkolo, zala na patience na ngai, nako futa yo nionso."27Nkolo na ye a yokeli ye mawa, a tiki ye a kende pe a longoli niongo na ye nionso.28Mais tangu serviteur wana a bimi, a kutani na moninga na ye oyo azalaki na niongo na ye ya ba deniers 100. A kangi ye na kingo pe a lobi: "Futa niongo na ngai!"29Moninga na ye a kweyi na mabele pe a bondeli ye: "Zala na patience na ngai, nako futa yo."30Mais ye a boyi. A keyi ko kotisa ye na boloko tii ako silisa niongo na ye.31Tangu baninga na ye ba moni likambu wana, ba yoki mawa makasi. Ba keyi ko yebisa nkolo na bango nionso oyo e salemaki.32Alors nkolo a bengi serviteur wana pe a lobi: "Serviteur mabe! Na longolelaki yo niongo nionso, po o bondelaki ngai.33Yo pe, o sengelaki ko yokela moninga na yo mawa te, ndenge ngai na yokelaki yo mawa?"34Nkolo na ye a siliki. A pesi ye na maboko ya batu oyo ba nyokolaka batu, tii a futa niongo na ye nionso.35Ndenge wana pe nde Père na ngai ya likolo ako sala bino, soki mutu na mutu a limbisi ndeko na ye na motema na ye mobimba te."‹ PrécédentSuivant ›