Matthieu 20Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1"Po bokonzi ya likolo eza lokola nkolo ndako moko oyo a bimi na tongo-tongo pona ko zwa batu ya mosala pona elanga na ye ya ba raisins.2A yokani na bango salaire ya denier moko na mokolo, pe a tindi bango na elanga na ye.3A bimi pene ya 9h ya tongo, pe a moni batu mosusu na place publique, baza sans mosala.4A lobi na bango: "Bino pe, bo kende na elanga na ngai. Nako pesa bino salaire oyo eza juste."5Ba keyi. A bimi lisusu pene ya midi pe pene ya 15h, pe a sali ndenge moko.6Pene ya 17h, a bimi lisusu pe a moni batu mosusu ba telemi wana. A tuni bango: "Pona nini boza awa mokolo mobimba sans ko sala eloko?"7Ba zongisi: "Po mutu moko te a zui biso na mosala." A lobi: "Bino pe, bo kende na elanga na ngai."8Tangu pokwa e komi, nkolo elanga a lobi na responsable na ye: "Benga batu ya mosala pe futa bango. Banda na ba oyo ba yaki na suka, tii na ba oyo ba yaki liboso."9Batu oyo ba bandaki mosala na 17h ba ye, pe mutu na mutu a zui denier moko.10Après, ba oyo ba bandaki liboso ba ye. Ba kanisaki bako zwa mingi koleka, mais bango pe mutu na mutu a zui denier moko.11Tangu ba zui yango, ba bandi ko murmurer sur nkolo ya ndako,12ba lobi: "Batu oyo ba ye na suka ba sali kaka heure moko. Mais o futi bango ndenge moko na biso, oyo to supporté ko lemba pe moyi ya mokolo mobimba"13A zongiseli moko na bango: "Moninga na ngai, na sali yo injustice te. To yokanaki na denier moko te?14Zwa oyo eza ya yo pe kende. Na lingi ko pesa oyo a ye na suka ndenge na pesi yo.15Naza na droit te ya ko sala oyo na lingi na biloko na ngai? To ozo tala ngai na liso ya mabe po naza malamu?"16Boye, batu ya suka bako koma ya liboso, pe ya liboso bako koma ya suka."17Tangu Yesu azalaki ko mata na Jérusalem, a bendi ba disciples 12 pembeni. Na nzela, a lobi na bango:18"Tala, tozo mata na Jérusalem. Bako pesa Mwana ya mutu na maboko ya ba chefs ya ba nganga-nzambe pe ba moteyi ya mibeko. Bako katela ye etumbu ya liwa,19pe bako pesa ye na maboko ya bapakano pona ba seka ye, ba beta ye fimbu pe ba baka ye na ekulusu. Pe mokolo ya misato, ako sekwa."20Alors mère ya bana ya Zébédée a pusani pene ya Yesu elongo na bana na ye. A fukami liboso na ye pona ko senga ye eloko.21Yesu a tuni ye: "O lingi nini?" A zongisi: "Pesa ordre ete, na bokonzi na yo, bana na ngai mibale oyo ba vanda, moko na droite na yo pe mosusu na gauche."22Yesu a zongisi: "Bo yebi te oyo bozo senga. Bokoki ko mela kopo oyo ngai esengeli na mela?" Ba lobi: "Tokoki."23A zongiseli bango: "Ya solo, boko mela kopo na ngai. Mais ko vanda na droite to na gauche na ngai, ezo dépendre na ngai te, eza pona batu oyo Père na ngai a bongiseli yango."24Tangu ba disciples dix mosusu ba yoki yango, ba silikeli bandeko wana mibale.25Yesu a bengi bango pe a lobi: "Bo yebi que ba chefs ya ba nations ba nyokolaka batu na bokonzi na bango, pe batu ya minene ba komisaka bango ba esclaves.26Eko zala boye te parmi bino. Mutu oyo a lingi ko zala monene parmi bino, a zala serviteur na bino.27Pe mutu oyo a lingi ko zala ya liboso parmi bino, a zala esclave na bino.28Ndenge wana, Mwana ya mutu a yaki te pona ba salela ye, mais pona ko salela batu pe ko pesa bomoi na ye lokola prix ya ko somba bonsomi ya batu mingi."29Tangu ba bimi na Jéricho, ebele ya batu ba landi Yesu.30Batu mibale bakufa miso bazalaki ko vanda pembeni ya nzela. Ba yoki que Yesu azo leka pe ba gangi: "Nkolo, Mwana ya David, yokela biso mawa!"31Batu ba pameli bango pona ba kanga minoko. Mais bango ba gangi lisusu makasi: "Nkolo, Mwana ya David, yokela biso mawa!"32Yesu a telemi, a bengi bango pe a tuni: "Bo lingi na sala nini pona bino?"33Ba zongisi: "Nkolo, miso na biso e fungwama."34Yesu a yokeli bango mawa pe a simbi miso na bango. Na mbala moko ba bandi ko mona pe ba landi ye.‹ Précédent