Marc 7Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Ba Pharisiens pe balakisi mosusu ya mibeko oyo ba wutaki na Jérusalem ba sangani pene na Yesu.2Ba moni ba disciples na ye mosusu bazo lia na maboko oyo eza peto te, elingi ko loba, oyo ba sukoli te.3Po ba Pharisiens pe ba Juifs nionso ba liaka te soki ba sukoli maboko malamu te, selon bonkoko ya ba anciens.4Soki ba wuti na esika oyo bato ebele, ba liaka te soki ba mipetoli nanu te. Baza pe na bonkoko misusu mingi oyo ba landaka, lokola ko sukola bakopo, bambeki pe biloko ya bronze.5Ba Pharisiens pe balakisi ya mibeko ba tuni ye: "Pona nini ba disciples na yo bazo landa bonkoko ya ba anciens te, mais bazo lia na maboko oyo eza peto te?"6Yesu a zongiseli bango: "Batu ya bilongi mibale! Ésaïe a sakolaki malamu na tina na bino, ndenge ekomama: Batu oyo ba pesaka ngai lokumu na monoko, mais mitema na bango eza mosika na ngai.7Ba kumisaka ngai na pamba, po mateya na bango eza kaka mibeko ya batu.8Bo tiki mobeko ya Nzambe, pe bo kangami na bonkoko ya batu."9A lobi lisusu: "Bo yebi malamu ko longola mobeko ya Nzambe pona ko batela bonkoko na bino!10Po Moïse a lobaki: Pesa père na yo pe mère na yo lokumu. Pe: Mutu oyo ako lakela père to mère na ye mabe, esengeli ba boma ye.11Mais bino bo lobaka ete soki mutu a lobi na père to mère na ye: Eloko oyo na kokaki ko salisa yo na yango eza corban, elingi ko loba likabo epai ya Nzambe,12bo pesaka ye lisusu nzela te ya ko sala eloko pona père to mère na ye.13Na ndenge wana, bozo longola valeur ya liloba ya Nzambe na bonkoko oyo bozo pesa batu. Pe bozo sala makambu misusu mingi ya ndenge wana."14Après, a bengi lisusu ebele ya batu pe a lobi: "Bino nionso bo yoka ngai pe bo comprendre.15Eloko moko te oyo e wuti libanda pe e koti na mutu e koki ko komisa ye mbindo. Mais oyo e bimaka na mutu, yango nde e komisaka ye mbindo.16Soki mutu aza na matoyi ya ko yoka, a yoka!"17Tangu a koti na ndaku, mosika na ebele ya batu, ba disciples na ye ba tuni ye tina ya parabole yango.18A lobi na bango: "Bino pe bo comprendre te? Bo yebi te ete eloko oyo e wuti libanda pe e koti na mutu e koki ko komisa ye mbindo te?19Po e kotaka na motema na ye te, mais na libumu, pe après e bimaka na nzela ya bosoto, oyo e longolaka bilei nionso."20A lobi lisusu: "Oyo e bimaka na mutu, yango nde e komisaka ye mbindo.21Po na kati ya mutu, na motema na ye, nde e bimaka makanisi mabe, ekobo, kindumba pe koboma batu,22moyibi, lokoso ya bomengo, mabe, bokosi, bomoi ya soni, likunya, maloba ya ko bebisa kombo ya batu, lolendo pe bozoba.23Makambu nionso oyo ya mabe e wutaka na kati, pe yango e komisaka mutu mbindo."24Yesu a longwe wana pe a keyi na territoire ya Tyr pe Sidon. A koti na ndaku moko, a lingaki mutu moko te a yeba yango, mais a kokaki ko bombama te.25Po mwasi moko, oyo mwana na ye ya mwasi azalaki na molimo mabe, a yoki sango na ye, a ye pe a fukami na makolo na ye.26Mwasi yango azalaki Grecque, ya origine syro-phénicienne. A bondeli Yesu a bengana molimo mabe na mwana na ye. Yesu a lobi na ye:27"Tika bana ba lia nanu ba tonda, po eza malamu te ko zwa mapa ya bana pe ko bwakela bana ya mbwa."28A zongiseli ye: "Oui, Nkolo. Mais bana ya mbwa na se ya mesa ba liaka biteni ya mapa oyo bana ba kweyisaka."29Alors Yesu a lobi na ye: "Likolo ya liloba oyo o lobi, kende. Molimo mabe e bimi na mwana na yo."30Tangu a zongi na ndaku na ye, a kuti mwana a lali na mbeto, pe molimo mabe e bimaki.31Yesu a longwe na territoire ya Tyr, a leki na Sidon pe a zongi na ebale ya Galilée, na ko katisa mboka ya Décapole.32Ba memeli ye mutu moko oyo a kufaki matoyi pe azalaki ko loba na difficulté. Ba bondeli Yesu a tia ye maboko.33A memi ye pembeni, mosika na ebele ya batu, a tie misapi na matoyi na ye pe a simbi lolemo na ye na soyi na ye moko.34Après, a tali likolo, a bendi pema pe a lobi: "Éphphatha!" Elingi ko loba: "Fungwama!"35Mbala moko, matoyi na ye e fungwami, lolemo na ye e fungwami pe a bandi ko loba malamu.36Yesu a pekisi bango ko yebisa mutu. Mais soki a pekisi bango mingi, bango bazalaki ko panza sango mingi koleka.37Ba kamwe mingi penza pe ba lobi: "Azo sala nionso malamu! Ata batu oyo ba kufa matoyi azo sala ba yoka, pe baba azo sala ba loba!"‹ Précédent