Matthieu 26Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Tangu Yesu a silisi maloba wana nionso, a lobi na ba disciples na ye:2"Bo yebi que etikali mikolo mibale pona Pâque, pe bako pesa Mwana ya mutu pona ba baka ye na ekulusu."3Alors ba chefs ya ba nganga-nzambe pe ba anciens ya peuple ba sangani na lopango ya mokonzi monene ya ba nganga-nzambe, oyo kombo na ye Caïphe.4Ba sololi sur ba moyens nini ya ko kanga Yesu na mayele mabe pe ko boma ye.5Mais ba lobi: "To sala yango na tangu ya fête te, po mobulu e bima te na kati ya peuple."6Lokola Yesu azalaki na Béthanie, na ndako ya Simon oyo azalaki na lèpre,7mwasi moko a pusani pene na ye na molangi ya albâtre, etondi na parfum ya prix monene. Tangu Yesu azalaki na mesa, mwasi a sopi parfum yango na motu na ye.8Tangu ba disciples ba moni yango, ba siliki pe ba lobi: "Pona nini gaspillage boye?9E sengelaki ko teka parfum oyo na prix monene pe ko pesa mbongo na babola."10Yesu a yebi yango pe a lobi na bango: "Pona nini bozo pesa mwasi oyo pasi? A saleli ngai likambu ya malamu.11Po boko zala na babola tangu nionso, mais ngai, boko zala na ngai tangu nionso te.12Tangu a sopi parfum oyo na nzoto na ngai, a sali yango pona ko bongisa kokundama na ngai.13Na lobi na bino ya solo: esika nionso sango malamu oyo eko teyama na mokili mobimba, bako loba pe likambu oyo mwasi oyo a sali, pona ko kanisa ye."14Alors moko ya ba disciples douze, oyo kombo na ye Judas Iscariot, a keyi epai ya ba chefs ya ba nganga-nzambe.15A tuni: "Boko pesa ngai nini soki na pesi bino ye?" Ba futi ye trente pièces ya bibende.16Banda moment wana, a bandaki ko luka occasion ya malamu pona ko pesa bango Yesu.17Mokolo ya liboso ya fête ya mapa sans levure, ba disciples ba ye ko tuna Yesu: "O lingi to bongisela yo repas ya Pâque wapi?"18A zongisi: "Bo kende na ville, epai ya mutu boye, pe bo yebisa ye: Moteyi a lobi: Tangu na ngai e komi pene. Nako sala Pâque epai na yo elongo na ba disciples na ngai."19Ba disciples ba sali ndenge Yesu a tindaki bango, pe ba bongisi repas ya Pâque.20Tangu pokwa e komi, Yesu a vandi na mesa elongo na ba disciples douze.21Tangu bazalaki ko lia, a lobi: "Na lobi na bino ya solo: moko na bino ako teka ngai."22Ba yoki mawa makasi. Mutu na mutu a bandi ko tuna ye: "Nkolo, eza ngai?"23A zongisi: "Oyo a tié loboko elongo na ngai na sani, ye nde ako teka ngai.24Mwana ya mutu azo kende ndenge ekomama pona ye. Mais mawa na mutu oyo azo teka Mwana ya mutu! Elingaki ko zala malamu koleka pona mutu wana a botama te."25Judas, oyo azalaki ko teka ye, a zui maloba pe a tuni: "Rabbi, eza ngai?" Yesu a zongiseli ye: "O lobi yango."26Tangu bazalaki ko lia, Yesu a zui lipa. A pesi Nzambe matondi, a buki yango pe a pesi na ba disciples. A lobi: "Bo zwa, bo lia. Oyo eza nzoto na ngai."27Après, a zui kopo. A pesi Nzambe matondi pe a pesi bango yango. A lobi: "Bino nionso, bo mela yango.28Po oyo eza makila na ngai, makila ya boyokani, oyo e sopami pona batu mingi, pona masumu e limbisama.29Na lobi na bino: banda sikoyo nako mela lisusu mbuma oyo ya nzete ya raisins te, tii mokolo nako mela yango ya sika elongo na bino na bokonzi ya Père na ngai."30Après ko yemba ba nzembo, ba keyi na ngomba ya ba oliviers.31Alors Yesu a lobi na bango: "Na butu oyo, bino nionso boko beta libaku pona ngai. Po ekomama: Nako beta mobateli ya bibwele, pe ba meme ya etonga eko palangana.32Mais après na ko sekwa, nako kende na Galilée liboso na bino."33Pierre a zui maloba pe a lobi: "Ata soki bango nionso ba beti libaku pona yo, ngai nako beta libaku ata mokolo moko te."34Yesu a lobi na ye: "Na lobi na yo ya solo: na butu oyo kaka, avant soso a lela, oko wangana ngai mbala misato."35Pierre a zongiseli ye: "Ata soki esengeli na kufa elongo na yo, nako wangana yo te." Ba disciples nionso pe ba lobi ndenge moko.36Après, Yesu a keyi elongo na bango na esika oyo ba bengi Gethsémané. A lobi na ba disciples: "Bo vanda awa, tangu ngai nako kende kuna ko bondela."37A zui Pierre pe bana mibali mibale ya Zébédée elongo na ye. A bandi ko yoka mawa pe motema ko tungisama makasi.38Alors a lobi na bango: "Molimo na ngai etondi na mawa tii na liwa. Bo tikala awa, bo lala pongi te elongo na ngai."39A keyi mwa liboso, a kweyi elongi na mabele pe a bondeli: "Père na ngai, soki eza possible, kopo oyo e longwa mosika na ngai. Kasi e salema te ndenge ngai na lingi, mais ndenge yo o lingi."40A zongi epai ya ba disciples pe a kuti bango ba lali. A lobi na Pierre: "Bo koki te ko zala sans ko lala ata heure moko elongo na ngai?41Bo lala pongi te pe bo bondela, pona bo kweya na komekama te. Molimo eza na posa, mais nzoto eza faible."42A longwe lisusu mbala ya mibale pe a bondeli: "Père na ngai, soki kopo oyo ekoki ko longwa te sans ngai na mela yango, mokano na yo e salema!"43A zongi pe a kuti bango lisusu ba lali, po miso na bango e komaki kilo.44A tiki bango pe a longwe lisusu. A bondeli mbala ya misato, a zongeli maloba wana kaka.45Après, a zongi epai ya ba disciples na ye pe a lobi: "Bozo lala sikoyo pe bozo pema! Tala, heure e komi pene, pe bazo pesa Mwana ya mutu na maboko ya batu ya masumu.46Bo telema, to kende. Tala, mutu oyo azo teka ngai azo pusana."47Tangu azalaki nanu ko loba, Judas, moko ya ba disciples douze, a komi. Azalaki elongo na ebele ya batu na ba épées pe ba bâtons. Ba chefs ya ba nganga-nzambe pe ba anciens ya peuple nde ba tindaki bango.48Mutu oyo azalaki ko teka ye a pesaki bango elembo oyo: "Oyo nako pesa bisou, eza ye. Bo kanga ye."49Mbala moko, a pusani pene ya Yesu pe a lobi: "Mbote, Rabbi!" Pe a pesi ye bisou.50Yesu a lobi na ye: "Moninga na ngai, sala oyo o ye ko sala." Alors batu wana ba pusani, ba simbi Yesu pe ba kangi ye.51Moko ya batu oyo bazalaki elongo na Yesu a semboli loboko, a bimisi épée na ye pe a beti serviteur ya mokonzi monene ya ba nganga-nzambe. A kati ye litoyi.52Alors Yesu a lobi na ye: "Zongisa épée na yo na esika na yango. Po batu nionso oyo ba zwaka épée bako kufa na épée.53O kanisi que nakoki te ko benga Père na ngai, oyo alingaki ko pese ngai mbala moko ba légions ya ba anges koleka douze?54Mais alors, ndenge nini Makomi eko kokisama, oyo e lobaka que esengeli e salema boye?"55Na moment wana, Yesu a lobi na ebele ya batu: "Bo ye na ba épées pe ba bâtons pona ko kanga ngai lokola criminel! Mikolo nionso na vandaki parmi bino, nazo teya na temple, mais bo kangaki ngai te.56Mais makambu oyo nionso e salemi pona Makomi ya ba prophètes e kokisama." Alors ba disciples nionso ba tiki ye pe ba kimi.57Batu oyo ba kangaki Yesu ba memi ye epai ya Caïphe, mokonzi monene ya ba nganga-nzambe. Ba moteyi ya mibeko pe ba anciens bazalaki ba sangani kuna.58Pierre a landaki ye na mosika tii na lopango ya mokonzi monene ya ba nganga-nzambe. A koti pe a vandi na ba serviteurs, pona ko mona ndenge likambu eko suka.59Ba chefs ya ba nganga-nzambe pe Sanhédrin mobimba bazalaki ko luka témoignage ya lokuta contre Yesu, pona ba boma ye.60Mais ba zwaki te, ata ba témoins mingi ya lokuta ba ye. Na suka, batu mibale ba ye pe ba lobi:61"Mutu oyo a lobaki: Nakoki ko bukisa temple ya Nzambe pe ko tonga yango lisusu na mikolo misato."62Mokonzi monene ya ba nganga-nzambe a telemi pe a tuni ye: "O zongisi eloko te? O lobi nini pona témoignage oyo batu oyo bazo pesa contre yo?"63Mais Yesu a fandi kimia. Mokonzi monene ya ba nganga-nzambe a zui maloba pe a lobi: "Na kombo ya Nzambe ya bomoi, na sengi yo na ndayi o yebisa biso soki oza Kristu, Mwana ya Nzambe."64Yesu a zongiseli ye: "O lobi yango. Pe na lobi na bino: banda sikoyo, boko mona Mwana ya mutu a vandi na droite ya nguya ya Nzambe, pe azo ya na mapata ya likolo."65Alors mokonzi monene ya ba nganga-nzambe a pasoli bilamba na ye pe a lobi: "A fingi Nzambe! Toza lisusu na besoin ya ba témoins pona nini? Tala, bo wuti ko yoka ndenge a fingi Nzambe. Bo kanisi nini?"66Ba zongisi: "A mérité liwa."67Alors ba bwakeli ye soyi na elongi pe ba beti ye makofi pe ba mbata. Ba lobi:68"Kristu, sakola! Yebisa biso nani a beti yo!"69Na tangu wana, Pierre azalaki ko vanda libanda na lopango. Mosali moko ya mwasi a pusani pene na ye pe a lobi: "Yo pe o zalaki na Yesu, mutu ya Galilée."70Mais a wanganaki liboso ya batu nionso: "Na yebi te oyo ozo loba."71Tangu azalaki ko kende na porte, mosali mosusu ya mwasi a moni ye pe a lobi na batu oyo bazalaki wana: "Mutu oyo pe azalaki na Yesu ya Nazareth."72A wanganaki lisusu na ndayi: "Na yebi mutu wana te."73Mwa tangu après, batu oyo bazalaki wana ba pusani pe ba lobi na Pierre: "Ya solo, yo pe oza moko ya batu wana. Ndenge o lobaka ezo lakisa yo."74Alors a bandi ko lapa ndayi pe milakeli mabe: "Na yebi mutu wana te!" Mbala moko soso a leli.75Pierre a kanisi liloba oyo Yesu a lobaki: "Avant soso a lela, oko wangana ngai mbala misato." A bimi libanda pe a leli na mawa makasi.‹ Précédent