Matthieu 22Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Yesu a zui lisusu maloba pe a lobeli bango na ba paraboles. A lobi:2"Bokonzi ya likolo eza lokola roi moko oyo a bongisaki fête ya libala pona mwana na ye ya mobali.3A tindi ba serviteurs na ye ba benga batu oyo ba invitaki na libala, mais ba lingaki ko ya te.4A tindi lisusu ba serviteurs mosusu pe a lobi: "Bo yebisa ba invités: Na bongisi repas na ngai. Na bomi ba ngombe na ngai pe ba nyama ya mafuta. Nionso eza prêt, bo ya na fête ya libala!"5Mais ba zui invitation na motuya te. Ba keyi, moko na elanga na ye, mosusu na commerce na ye.6Ba mosusu ba kangi ba serviteurs, ba sali bango mabe pe ba bomi bango.7Roi a siliki. A tindi ba soldats na ye, a bomi ba bomi wana pe a tumbisi ville na bango.8Après, a lobi na ba serviteurs na ye: "Fête ya libala eza prêt, mais ba invités ba bongaki na yango te.9Alors bo kende na ba carrefours pe bo benga na fête batu nionso oyo boko mona."10Ba serviteurs wana ba keyi na ba nzela pe ba sangisi batu nionso oyo ba moni, batu mabe pe batu malamu. Salle ya fête e tondi na ba invités.11Roi a koti pona ko tala batu oyo ba vandi na mesa. Kuna a moni mobali moko oyo a lati elamba ya fête ya libala te.12A tuni ye: "Moninga na ngai, ndenge nini o koti awa sans elamba ya fête ya libala?" Mutu wana a zangi maloba.13Alors roi a lobi na ba serviteurs: "Bo kanga ye makolo pe maboko, pe bo bwaka ye na molili ya libanda. Kuna eko zala milelo pe ko lia minu."14Po batu mingi ba bengami, mais batu muke kaka nde ba ponami."15Alors ba pharisiens ba keyi ko sala conseil pona ko zwa Yesu na motambo na nzela ya maloba na ye moko.16Ba tindeli ye ba disciples na bango elongo na batu ya Hérode. Ba lobi: "Moteyi, to yebi que o lobaka solo pe o teyaka nzela ya Nzambe na bosolo. O bangaka mutu te, po o talaka ndenge mutu a monanaka te.17Yebisa biso makanisi na yo: e sengeli ko futa mpako na César, to te?"18Mais Yesu a yebi makanisi na bango ya mabe pe a lobi: "Ba hypocrites! Pona nini bozo komeka ngai?19Bo lakisa ngai mbongo oyo ba futaka na yango mpako." Ba pesi ye denier moko.20A tuni bango: "Elilingi oyo pe makomi oyo eza ya nani?"21Ba zongisi: "Ya César." Alors a lobi: "Bo pesa César oyo eza ya César, pe Nzambe oyo eza ya Nzambe."22Tangu ba yoki yango, ba kamwe. Ba tiki ye pe ba keyi.23Na mokolo wana kaka, ba sadducéens, oyo ba lobaka que lisekwa eza te, ba ye epai ya Yesu pe ba tuni ye:24"Moteyi, Moïse a lobaki: Soki mobali a kufi sans bana, ndeko na ye a bala mwasi oyo a tiki, pona ko botela ndeko na ye bakitani.25Parmi biso, ezalaki na bandeko sept ya mibali. Oyo ya liboso a bali pe a kufi. Lokola azalaki na bana te, a tiki mwasi na ye na ndeko na ye.26E salemi pe ndenge moko na oyo ya mibale, ya misato, tii na septième.27Sima na bango nionso, mwasi pe a kufi.28Na lisekwa, mwasi wana ako zala mwasi ya nani parmi bango sept? Po bango nionso ba balaki ye."29Yesu a zongiseli bango: "Boza na erreur, po bozo comprendre Makomi te pe nguya ya Nzambe te.30Po na lisekwa, mibali bako bala basi te, pe basi bako bala mibali te. Bako zala lokola ba anges ya Nzambe na likolo.31Pona lisekwa ya bakufi, bo tangi te oyo Nzambe a yebisaki bino:32Ngai naza Nzambe ya Abraham, Nzambe ya Isaac pe Nzambe ya Jacob? Nzambe aza Nzambe ya bakufi te, mais ya batu ya bomoi."33Tangu ebele ya batu ba yoki yango, ba kamwe makasi mateya ya Yesu.34Tangu ba pharisiens ba yoki que a kangisi ba sadducéens minoko, ba sangani.35Moko na bango, oyo ayebi mibeko malamu, a tuni ye motuna pona ko komeka ye:36"Moteyi, mobeko nini eza monene koleka na Mibeko?"37Yesu a zongiseli ye: "Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba pe na makanisi na yo nionso.38Wana nde mobeko ya liboso pe oyo eza monene koleka.39Pe oyo ya mibale eza lokola yango: Linga moninga na yo ndenge o milingaka yo moko.40Mibeko nionso pe mateya ya ba prophètes e simbami na mibeko oyo mibale."41Comme ba pharisiens bazalaki esika moko, Yesu a tuni bango:42"Bo kanisi nini pona Kristu? Aza mwana ya nani?" Ba zongiseli ye: "Ya David."43A lobi na bango: "Alors, ndenge nini David, na bokambi ya Molimo, a bengi ye Nkolo, tangu a lobi:44Nkolo a lobi na Nkolo na ngai: Vanda na droite na ngai, tii na tia banguna na yo lokola etando ya makolo na yo?45Soki David azo benga ye Nkolo, ndenge nini aza mwana na ye?"46Mutu moko te a kokaki ko zongisela ye ata liloba moko. Banda mokolo wana, mutu moko te a mekaki lisusu ko tuna ye mituna.‹ Précédent