Matthieu 13Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Jour wana kaka, Yesu a bimi na ndaku pe a vandi pembeni ya ebale.2E bele ya batu ba sangani pene na ye. Alors a mati pe a vandi na bwatu, pendant que batu nionso ba telemi na libongo.3A teyi bango makambu mingi na ba paraboles, pe a lobi:4"Moloni moko a bimi pona ko lona. Tangu azalaki ko bwaka ba mbuma, ndambu e kweyi pembeni ya nzela. Ba ndeke ba ye pe ba lie yango.5Ndambu mosusu e kweyi na esika ya mabanga, esika mabele ezalaki mingi te. E bimi noki, po mabele ezalaki mozindo te.6Mais tangu moyi e bimi, e tumbi yango. Pe lokola ezalaki na misisa ya makasi te, e kauki.7Ndambu mosusu e kweyi na kati ya ba nzube. Ba nzube e koli pe e fini yango.8Mais ndambu mosusu e kweyi na mabele ya malamu pe e boti ba mbuma: moko e boti 100, mosusu 60, pe mosusu 30.9Oyo aza na matoyi ya ko yoka, a yoka!"10Ba disciples ba pusani pene pe ba tuni ye: "Po na nini ozo lobela bango na ba paraboles?"11Yesu a zongiseli bango: "Po bino bo zui nzela ya ko yeba ba secrets ya bokonzi ya likolo, mais bango ba zui yango te.12Po mutu oyo aza na eloko, bako pesa ye lisusu pe ako zala na ebele. Mais mutu oyo aza na rien, bako botola ye ata oyo aza na yango.13Yango wana nazo lobela bango na ba paraboles: eza po ba tala, mais ba mona te; ba yoka, mais ba comprendre te.14Na bango, maloba oyo mosakoli Ésaïe a lobaki e kokisami: "Boko yoka, mais boko comprendre te; boko tala, mais boko mona te."15Po mitema ya batu oyo e komi makasi. Ba kangi matoyi na bango pe ba kangi miso na bango, pona ba mona te na miso, ba yoka te na matoyi, ba comprendre te na mitema, ba zonga epai na ngai te, pe ngai na bikisa bango te.16Mais esengo na miso na bino, po ezo mona, pe matoyi na bino, po ezo yoka!17Na yebisi bino ya solo: ba prophètes mingi pe batu ya juste mingi ba lingaki ko mona oyo bozali ko mona, mais ba monaki yango te; ba lingaki ko yoka oyo bozali ko yoka, mais ba yokaki yango te.18Alors, bo yoka sens ya parabole ya moloni.19Soki mutu a yoki maloba ya bokonzi pe a comprendre yango te, Satana a yaka pe a longolaka oyo e lonamaki na motema na ye. Wana nde mutu oyo a yambi ba mbuma pembeni ya nzela.20Mutu oyo a yambi ba mbuma na esika ya mabanga aza mutu oyo a yoki liloba pe a yambi yango mbala moko na esengo.21Mais maloba yango e zui misisa na kati na ye te, pe e zangi ko kangama. Dès que pasi to minioko e yeli ye po na maloba yango, e komeli occasion ya ko kweya.22Mutu oyo a yambi ba mbuma na kati ya ba nzube aza mutu oyo a yoki liloba, mais ba soucis ya vie oyo pe séduction ya bomengo e bomi liloba yango, pe eko bota mbuma te.23Mais mutu oyo a yambi ba mbuma na mabele ya malamu aza mutu oyo a yoki liloba pe a comprendre yango. A boti ba mbuma: moko 100, mosusu 60, pe mosusu 30.24A pesi bango parabole mosusu, a lobi: "Bokonzi ya likolo e kokani na mutu oyo a lonaki ba mbuma ya malamu na elanga na ye.25Mais tangu batu ba lalaki, monguna na ye a ye, a loni matiti ya mabe na kati ya blé, pe a kei.26Tangu blé e koli pe e boti mbuma, matiti ya mabe e monani pe.27Ba serviteurs ya maître ya ndaku ba ye ko loba na ye: "Nkolo, o lonaki ba mbuma ya malamu na elanga na yo, boye te? Alors matiti ya mabe oyo e wuti wapi?"28A zongiseli bango: "Monguna nde a sali boye." Ba serviteurs ba tuni ye: "Olingi to kende ko longola yango?"29A lobi: "Te, po tangu bozali ko longola matiti ya mabe, bokoki pe ko pikola blé elongo na yango.30Bo tika nionso mibale e kola esika moko ti tangu ya récolte. Na tangu wana, nako yebisa batu ya récolte: Bo longola liboso matiti ya mabe, bo kanga yango na ba maboke pona ko tumba; mais bo sangisa blé na ebombelo na ngai."31A pesi bango parabole mosusu: "Bokonzi ya likolo e kokani na mbuma ya moutarde oyo mutu moko a zui pe a loni na elanga na ye.32Eza mbuma oyo e leki nionso na moke. Mais tangu e koli, e lekaka ba légumes na monene pe e komaka nzete, ti ba ndeke ba yaka ko vanda na ba branches na yango."33A pesi bango lisusu parabole mosusu: "Bokonzi ya likolo e kokani na levure oyo mwasi moko a zui pe a sangisi na trois mesures ya farine, ti pâte nionso e vimbi."34Yesu a lobelaki batu makambu wana nionso na ba paraboles. Azalaki ko loba na bango te sans ba paraboles,35pona maloba oyo mosakoli a lobaki e kokisama: "Nako fungola monoko na ngai pona ko loba na ba paraboles; nako yebisa makambu oyo e bombamaki banda mokili e salama."36Alors Yesu a zongisi batu pe a koti na ndaku. Ba disciples na ye ba ye pene na ye pe ba lobi: "Expliquer biso parabole ya matiti ya mabe na elanga."37A zongiseli bango: "Mutu oyo a loni ba mbuma ya malamu aza Mwana ya mutu.38Elanga eza mokili. Ba mbuma ya malamu eza bana ya bokonzi. Matiti ya mabe eza bana ya Satana.39Monguna oyo a lonaki yango aza diable. Récolte eza suka ya mokili, pe batu oyo ba salaka récolte eza ba anges.40Ndenge ba longolaka matiti ya mabe pe ba tumbaka yango na moto, eko zala pe boye na suka ya mokili.41Mwana ya mutu ako tinda ba anges na ye. Bako longola na bokonzi na ye ba scandales nionso, pe batu nionso oyo ba salaka mabe.42Bako bwaka bango na four ya moto makasi. Kuna, bako lela pe bako lia minu.43Alors batu ya juste bako ngenga lokola moyi na bokonzi ya Père na bango. Oyo aza na matoyi ya ko yoka, a yoka!44Bokonzi ya likolo e kokani lisusu na trésor oyo e bombami na elanga. Mutu oyo a moni yango, a bombi yango. Na esengo nionso, a keyi ko teka biloko nionso oyo aza na yango pe a sombi elanga wana.45Bokonzi ya likolo e kokani lisusu na mutu ya commerçant oyo a lukaka ba perles ya kitoko.46Tangu a moni perle moko ya valeur mingi, a keyi ko teka biloko nionso oyo azalaki na yango pe a sombi yango.47Bokonzi ya likolo e kokani lisusu na filet oyo ba bwaki na ebale pe e kangi mbisi ya ndenge na ndenge.48Tangu e tondi, ba pecheurs ba bendi yango na libongo. Ba vandi, ba tié mbisi ya malamu na ba kitunga, pe ba bwaki oyo ya mabe.49Eko zala pe boye na suka ya mokili: ba anges bako ya ko kabola batu ya mabe na batu ya juste,50pe bako bwaka batu ya mabe na four ya moto makasi. Kuna, bako lela pe bako lia minu.51Bo comprendre makambu oyo nionso?" Ba zongiseli ye: "oui."52Alors a lobi na bango: "Yango wana, moteyi nionso ya mibeko oyo a komi disciple ya bokonzi ya likolo a kokani na nkolo ndaku oyo a bimisi biloko ya sika pe ya kala na ebombelo ya biloko na ye ya valeur."53Tangu Yesu a silisi ba paraboles wana, a longwaki na esika wana.54A zongi na mboka na ye pe a bandi ko teya batu na synagogue. Batu ba kamwaki pe ba lobi: "Sagesse na ye oyo pe ba miracles e wuti wapi?55Aza mwana ya charpentier te? Mama na ye aza Marie te? Jacques, Joseph, Simon pe Jude baza ba ndeko na ye te?56Pe ba ndeko na ye ya basi baza nionso awa na biso te? Alors makambu na ye oyo nionso e wuti wapi?"57A komaki raison ya ko kweya pona bango. Mais Yesu a lobi na bango: "Mosakoli a zangaka lokumu kaka na mboka na ye pe na ndaku na ye."58A salaki ba miracles mingi te na esika wana, pona ko zanga ko ndima na bango.‹ PrécédentSuivant ›