Matthieu 15Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Alors, ba pharisiens pe bateyi ya mibeko ba wuti na Jérusalem, ba ye epai ya Yesu pe ba lobi:2"Pona nini ba disciples na yo bazo buka tradition ya bokoko na biso? Po bazo sukola maboko te avant ya ko lia."3Yesu a zongiseli bango: "Pe bino, pona nini bozo buka mibeko ya Nzambe pona ko landa tradition na bino?4Po Nzambe a lobi: "Pesa père pe mère na yo lokumu", pe: "Mutu oyo a lakeli père to mère na ye mabe, esengeli ba pesa ye etumbu ya liwa."5Mais bino bozo loba que soki mutu a yebisi père to mère na ye: "Eloko oyo na lingaki ko sunga yo na yango, na pesi yango lokola likabo na Nzambe", mutu wana aza lisusu na obligation ya ko pesa père to mère na ye lokumu te.6Bo komisi liloba ya Nzambe pamba pona ko landa tradition na bino.7Bino ba hypocrites! Mosakoli Ésaïe a lobaki solo pona bino tangu a lobi:8"Peuple oyo ezo pesa ngai lokumu kaka na monoko, mais mitema na bango eza mosika na ngai.9Bazo sambela ngai ya pamba, po bazo teya mibeko ya batu."10Après, Yesu a bengi batu pene na ye pe a lobi: "Bo yoka pe bo comprendre.11Eloko oyo e kotaka na monoko e komisaka mutu mbindo te. Mais oyo e bimaka na monoko, yango nde e komisaka mutu mbindo."12Alors ba disciples na ye ba pusani pe ba lobi: "O yebi que ba pharisiens ba beti libaku na maloba oyo ba yoki?"13A zongisi: "Nzete nionso oyo Père na ngai ya likolo a lonaki te, bako pikola yango.14Bo tika bango. Baza batu bakufa miso oyo bazo tambolisa batu bakufa miso. Soki mutu akufa miso a tambolisi mutu mosusu akufa miso, bango mibale bako kweya na libulu."15Pierre a zui maloba pe a lobi: "Expliquer biso parabole wana."16Yesu a lobi: "Bino pe, bo comprendre nanu te?17Bo yebi te que eloko nionso oyo e kotaka na monoko e kendaka na libumu, après e bimaka na toilette?18Mais oyo e bimaka na monoko e wutaka na motema. Yango nde e komisaka mutu mbindo.19Po na motema nde makanisi ya mabe e wutaka, ko boma batu, ko sala ekobo, pite, moyibi, ko pesa témoignage ya lokuta pe ko panzela batu maloba ya mabe.20Wana nde makambu oyo e komisaka mutu mbindo. Mais ko lia sans ko sukola maboko e komisaka mutu mbindo te."21Yesu a longwe wana pe a keyi na territoire ya Tyr pe Sidon.22Mwasi moko ya Canaan oyo azalaki ko vanda na esika wana a ye ko belela ye: "Nkolo, Mwana ya David, yokela ngai mawa! Molimo mabe azo nyokola mwana na ngai ya mwasi makasi."23Mais Yesu a zongiseli ye ata liloba moko te. Ba disciples ba pusani pe ba bondeli ye: "Zongisa ye, po azo ganga sima na biso."24A zongisi: "Ba tindaki ngai kaka epai ya ba meme oyo e bungi ya libota ya Israël."25Mais mwasi a ye ko fukama liboso na ye pe a lobi: "Nkolo, sunga ngai!"26Yesu a zongiseli ye: "Eza malamu te ko zwa mapa ya bana pe ko bwakela yango ba mbwa ya mike."27Mwasi a lobi: "Eza ya solo, Nkolo. Mais ata ba mbwa ya mike ba liaka ba miettes oyo e kweyaka na mesa ya ba nkolo na bango."28Alors Yesu a lobi na ye: "Mwasi, kondima na yo eza monene! E salema pona yo ndenge o lingi." Pe na heure wana kaka, mwana na ye ya mwasi a biki.29Yesu a longwe wana pe a ye pembeni ya ebale ya Galilée. A mati na ngomba pe a vandi kuna.30Ebele ya batu ba ye pene na ye. Ba memi batu oyo ba tambolaka na pasi, batu bakufa miso, ba baba, batu oyo maboko to makolo e kufa pe batu mosusu mingi oyo bazalaki ko bela. Ba tié bango na makolo ya Yesu, pe a bikisi bango.31Batu ba kamwe tangu ba moni ba baba bazo loba, batu oyo maboko to makolo ekufa ba biki, batu oyo ba tambolaka na pasi bazo tambola malamu, pe batu bakufa miso bazo mona. Ba pesi Nzambe ya Israël lokumu.32Yesu a bengi ba disciples na ye pe a lobi: "Na yoki mawa ya batu oyo. Eza déjà mikolo misato baza awa na ngai, pe baza na eloko ya ko lia te. Na lingi ko zongisa bango na nzala te, po makasi ekoki ko sila bango na nzela."33Ba disciples ba lobi: "Na désert oyo, toko zwa mapa wapi oyo eko tondisa ebele ya batu boye?"34Yesu a tuni bango: "Boza na mapa boni?" Ba zongisi: "sept, pe mwa mbisi ya mike."35Alors a yebisi batu ba vanda na mabele.36A zui ba sept mapa pe mbisi, a pesi Nzambe matondi, a buki yango pe a pesi na ba disciples na ye. Bango ba kaboleli batu.37Batu nionso ba lie pe ba tondi. Ba lokoti biteni oyo e tikali pe ba tondisi sept kitunga.38Batu oyo ba liaki bazalaki 4000 mibali, sans ko tanga basi pe bana.39Après, Yesu a zongisi batu, a mati na bwatu pe a keyi na territoire ya Magadan.‹ PrécédentSuivant ›