Marc 11Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Tangu ba pusani pene na Jérusalem, pembeni ya Bethphagé pe Béthanie, pene na ngomba ya banzete ya olive, Yesu a tindi ba disciples mibale.2A lobi: "Bo kende na mboka oyo eza liboso na bino. Tangu kaka boko kota, boko kuta mwana ya âne oyo ba kangi, oyo mutu a tikala ko vanda likolo na yango te. Bo fungola yango pe bo mema yango.3Soki mutu a tuni bino: Pona nini bozo sala boye? Bo zongisa: Nkolo aza na besoin na yango. Pe mbala moko, ako tika yango e ya awa."4Ba disciples ba keyi pe ba kuti mwana ya âne oyo ba kangi libanda, pene ya porte, na esika nzela e baluki. Ba fungoli yango.5Batu mosusu oyo bazalaki wana ba tuni: "Bozo sala nini? Pona nini bozo fungola mwana wana ya âne?"6Ba zongisi ndenge Yesu a yebisaki bango, pe batu ba tiki bango ba kende.7Ba memeli Yesu mwana ya âne, ba tie bilamba na bango likolo na yango, pe Yesu a vandi likolo na yango.8Batu mingi ba tandaki bilamba na bango na nzela. Bamosusu ba tandaki bitape oyo ba kataki na bilanga.9Batu oyo bazalaki liboso pe oyo bazalaki ko landa Yesu bazalaki ko ganga: "Hosanna! Apambolama, oyo azo ya na kombo ya Nkolo!10Bokonzi oyo ezo ya, bokonzi ya David tata na biso, epambolama! Hosanna na bisika ya likolo koleka!"11Yesu a koti na Jérusalem, na temple. A tali makambu nionso zingazinga. Lokola tangu e keyi, a bimi pe a keyi na Béthanie elongo na ba disciples douze.12Mokolo oyo e landi, après ba bimi na Béthanie, Yesu a yoki nzala.13A moni na mosika nzete ya figuier oyo ezalaki na makasa. A keyi ko tala soki ako kuta mbuma. Mais tangu a pusani, a kuti kaka makasa, po ezalaki saison ya ba figues te.14A lobi na nzete yango: "Mutu a lia lisusu mbuma na yo ata mokolo moko te!" Ba disciples na ye ba yoki yango.15Ba komi na Jérusalem. Yesu a koti na temple pe a bandi ko bengana batu oyo bazalaki ko teka pe ko somba kuna. A balusi bamesa ya batu oyo bazalaki ko changer mbongo pe bakiti ya bateki ya ba pigeons.16Azalaki ko pesa mutu moko te nzela ya ko katisa temple na biloko.17Azalaki ko teya pe ko loba: "Ekomama te ete: Ndaku na ngai eko bengama ndaku ya losambo pona bikolo nionso? Mais bino bo komisi yango libulu ya miyibi!"18Ba chefs ya ba nganga-nzambe pe balakisi ya mibeko ba yoki yango, pe ba bandi ko luka ndenge ya ko bomisa ye. Bazalaki ko banga ye, po ebele ya batu nionso bazalaki ko kamwa mateya na ye.19Tangu pokwa e komi, Yesu a bimi na ville.20Na tongo, tangu bazalaki ko leka, ba disciples ba moni figuier e kauki tii na misisa.21Pierre a kanisi oyo e salemaki pe a lobi na Yesu: "Rabbi, tala! Figuier oyo o lakelaki mabe e kauki."22Yesu a zongisi: "Bo ndima Nzambe.23Na yebisi bino ya solo: soki mutu a lobi na ngomba oyo: Longwa wana pe mibwaka na ebale, pe a zangi doute na motema, mais a ndimi ete oyo a lobi eko salema, ako mona yango ko kokisama.24Yango wana na yebisi bino: nionso oyo bozo senga na losambo, bo ndima ete bo zui yango, pe bokomona yango kokokisama.25Tangu bo telemi pona ko sambela, soki boza na likambu contre mutu, bo limbisa ye, pona Tata na bino oyo aza na likolo a limbisa pe mabunga na bino.26Mais soki bo limbisi te, Tata na bino oyo aza na likolo pe ako limbisa mabunga na bino te."27Ba zongi lisusu na Jérusalem. Tangu Yesu azalaki ko tambola na temple, ba chefs ya ba nganga-nzambe, balakisi ya mibeko pe ba anciens ba ye epai na ye.28Ba tuni: "Ozo sala makambu oyo na autorité nini? Nani a pesi yo autorité ya ko sala yango?"29Yesu a zongisi: "Ngai pe nako tuna bino motuna moko. Bo zongisela ngai, pe nako yebisa bino na autorité nini nazo sala makambu oyo.30Batisimo ya Jean e wutaki na likolo to na batu? Bo zongisela ngai."31Ba bandi ko kabola makanisi na kati na bango: "Soki to lobi: Na likolo, ako tuna: Alors pona nini bo ndimaki ye te?32Mais soki to lobi: Na batu..." Bazalaki ko banga batu, po bango nionso bazalaki ko tala Jean lokola mosakoli ya solo.33Alors ba zongiseli Yesu: "To yebi te." Yesu a lobi: "Ngai pe nako yebisa bino te na autorité nini nazo sala makambu oyo."‹ Précédent