Matthieu 8Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Tangu Yesu a kitaki na ngomba, ebele ya batu ba landaki ye.2Mutu moko oyo azalaki na maladie ya lèpre a pusani pene na Yesu, a fukami liboso na ye pe a lobi: "Nkolo, soki o lingi, o koki ko petola ngai."3Yesu a semboli loboko, a simbi ye pe a lobi: "Na lingi. Zala peto!" Mbala moko, lèpre na ye e sili.4Après, Yesu a lobi na ye: "Keba, ko yebisa mutu likambu oyo te. Mais kende ko milakisa na prêtre, pe pesa likabo oyo Moïse a kataki na mibeko, pona e zala témoignage liboso na bango."5Tangu Yesu a kotaki na Capernaüm, mokonzi moko ya ba soda a pusani pene na ye,6a bondeli ye, a lobi: "Nkolo, mosali na ngai a lali na ndaku, aza paralysé pe azo yoka pasi makasi."7Yesu a lobi na ye: "Nako ya ko bikisa ye."8Mokonzi ya ba soda a zongiseli ye: "Nkolo, na mérité te que o kota na ndaku na ngai. Mais loba kaka liloba moko, pe mosali na ngai ako bika.9Po ngai pe naza na se ya ba chefs, pe naza na ba soda oyo ba tosaka mitindo na ngai. Soki na lobi na moko: 'Kende!', a kendaka. Soki na lobi na mosusu: 'Yaka!', a yaka. Pe soki na lobi na mosali na ngai: 'Sala boye!', a salaka yango."10Tangu Yesu a yoki bongo, a kamwe pe a lobi na batu oyo bazalaki ko landa ye: "Na yebisi bino ya solo: ata na Israël, na tikala ko mona kondima ya makasi boye te.11Na yebisi bino: batu ebele bako wuta na est pe na ouest, bako vanda na mesa elongo na Abraham, Isaac na Jacob, na bokonzi ya likolo.12Mais bana ya bokonzi bako bwakama na molili ya libanda. Kuna, bako lela pe bako lia minu."13Après, Yesu a lobi na mokonzi ya ba soda: "Kende. E salema pona yo ndenge o ndimi." Pe kaka na tangu wana, mosali na ye a biki.14Après, Yesu a keyi na ndaku ya Pierre. Kuna, a moni mama bokilo ya Pierre a lali, aza na fièvre.15A simbi ye na loboko, pe fièvre e sili, après a telemi pe a bandi ko salela Yesu.16Na pokwa, ba memeli Yesu batu ebele oyo bazalaki na milimo mabe. Na liloba na ye, a bengani milimo yango, pe a bikisi batu nionso oyo bazalaki ko bela.17Yango e kokisaki maloba oyo mosakoli Ésaïe a lobaki: "A zwaki ba infirmités na biso pe a memaki ba maladies na biso."18Tangu Yesu a moni ebele ya batu ba zingi ye, a pesi mitindo ba katisa na ngambo mosusu ya ebale.19Molakisi moko ya mibeko a pusani pene na ye pe a lobi: "Moteyi, nako landa yo partout oyo oko kende."20Yesu a zongiseli ye: "Ba renards baza na madusu oyo ba vandaka, pe ba ndeke ya likolo baza na ba zala. Mais Mwana ya mutu aza ata na esika ya ko pemisa motó na ye te."21Moko mosusu na kati ya ba disciples a lobi na ye: "Nkolo, pesa ngai nzela na kende nanu ko kunda père na ngai."22Mais Yesu a zongiseli ye: "Landa ngai, pe tika bakufi ba kunda bakufi na bango."23Yesu a mati na bwato, pe ba bayekoli na ye ba landi ye.24Sikoyo, mopepe moko ya makasi fort e bandi ko pepa na ebale, ti mbonge ya mayi e bandi ko zipa bwato. Mais Yesu azalaki ko lala.25Ba disciples ba pusani pene na ye, ba lamusi ye pe ba lobi: "Nkolo, bikisa biso! Tozo kufa!"26A lobi na bango: "Pona nini bozo banga, bino batu ya kondima moke?" Après, a telemi, a pameli mipepe na ebale, pe kimia monene e zongi.27Batu bazalaki wana ba kamwe fort, ba lobi: "Oyo aza nani, pona ata mipepe na ebale e tosa ye?"28Tangu Yesu a komi na ngambo mosusu, na mboka ya ba Gadaréniens, batu mibale oyo bazalaki na milimo mabe ba bimi na ba tombes pe ba ye liboso na ye. Bazalaki na kanda makasi, pe mutu moko te azalaki ko meka ko leka na nzela wana.29Ba bandi ko ganga: "Mwana ya Nzambe, biso na yo likambu nini? O ye awa pona ko nyokola biso avant tangu oyo ekatama?"30Mosika na bango, ezalaki na troupeau monene ya ba ngulu oyo bazalaki ko lia.31Milimo mabe ba bondeli Yesu, ba lobi: "Soki o bengani biso, tinda biso na kati ya troupeau oyo ya ba ngulu."32A lobi na bango: "Bo kende!" Milimo mabe ba bimi pe ba koti na ba ngulu. Sikoyo, troupeau mobimba ekitaki mbangu na pente ya makasi, e kweyi na ebale, pe ba ngulu nionso ba kufi na mayi.33Batu oyo bazalaki ko batela ba ngulu ba kimi na ville. Ba beti lisolo ya makambu nionso oyo e salemaki, pe oyo e komelaki batu oyo bazalaki na milimo mabe.34Alors, batu ya ville mobimba ba bimi ko kutana na Yesu. Tangu ba moni ye, ba bondeli ye a longwa na territoire na bango.‹ PrécédentSuivant ›