Matthieu 19Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Tangu Yesu a silisi maloba wana, a longwe na Galilée pe a keyi na territoire ya Judée, na ngambo mosusu ya Jourdain.2Ebele ya batu ba landi ye, pe kuna a bikisi ba beli.3Ba pharisiens ba pusani pene na ye pona komeka ye, pe ba tuni: "Mobali aza na droit ya ko longola mwasi na ye na libala pona raison nionso?"4A zongisi: "Bo tanga te que, na ebandeli, Mokeli a salaki bango mobali pe mwasi?5Pe a lobaki: Yango wana mobali ako tika père pe mère na ye, ako kangama na mwasi na ye, pe bango mibale bako koma nzoto moko.6Donc baza lisusu mibale te, mais nzoto moko. Alors, mutu a kabola te oyo Nzambe a sangisi."7Ba tuni ye: "Alors, pona nini Moïse a pesaki ordre ya ko pesa mwasi mokanda ya divorce pe ko longola ye na libala?"8A zongiseli bango: "Moïse a pesaki bino nzela ya ko longola basi na bino na libala po mitema na bino eza makasi. Mais na ebandeli ezalaki boye te.9Ngai na lobi na bino: mutu oyo a longoli mwasi na ye na libala, soki eza pona infidélité te, pe a bali mosusu, a sali ekobo."10Ba disciples ba lobi na ye: "Soki situation ya mobali na mwasi eza boye, eza malamu ko bala te."11A zongiseli bango: "Batu nionso te nde bakoki ko yamba liloba oyo, kaka batu oyo ba pesameli makoki po na yango.12Po ba mibali mosusu ba botamaka sans makoki ya ko zala na mwasi. Ba mosusu, batu nde ba komisi bango ndenge wana. Pe ba mosusu ba poni bango moko ko zala sans mwasi pona bokonzi ya likolo. Oyo akoki ko comprendre, a comprendre."13Alors ba memeli Yesu bana mike pona a tia bango maboko pe a bondela pona bango. Mais ba disciples ba bandi ko repousser bango.14Yesu a lobi: "Bo tika bana mike, bo pekisa bango ko ya epai na ngai te. Po bokonzi ya likolo eza pona batu oyo baza lokola bango."15A tié bango maboko, pe a longwe wana.16Mobali moko a pusani pe a tuni Yesu: "Moteyi, likambu nini ya malamu esengeli na sala pona ko zwa bomoi ya seko?"17A zongiseli ye: "Pona nini o tuni ngai pona oyo eza malamu? Moko kaka nde aza malamu. Soki o lingi ko kota na bomoi, tosa mibeko." Mutu wana a tuni: "Mibeko nini?"18Yesu a zongisi: "Oko boma mutu te, oko sala ekobo te, oko yiba te, oko pesa témoignage ya lokuta te.19Pesa père pe mère na yo lokumu, pe linga moninga na yo ndenge o milingaka yo moko."20Elenge mobali a lobi: "Na tosaka makambu oyo nionso. Nini e zangi ngai lisusu?"21Yesu a lobi na ye: "Soki o lingi ko zala ya kokoka, kende, teka biloko na yo pe pesa babola. Oko zala na bomengo na likolo. Après, yaka, landa ngai."22Tangu elenge mobali a yoki maloba wana, a keyi na mawa, po azalaki na biloko mingi.23Yesu a lobi na ba disciples na ye: "Na lobi na bino ya solo: eza pasi pona mutu ya bozui ko kota na bokonzi ya likolo.24Na lobi lisusu na bino: eza pete pona chameau ko leka na lidusu ya tonga, koleka pona mutu ya bozui ko kota na bokonzi ya Nzambe."25Tangu ba disciples ba yoki yango, ba kamwe fort pe ba tuni: "Alors nani akoki ko bikisama?"26Yesu a tali bango pe a lobi: "Pona batu, eza impossible. Mais pona Nzambe, nionso eza possible."27Alors Pierre a zui maloba pe a lobi: "Tala, biso to tiki nionso pe to landi yo. Eko zala boni po na biso?"28Yesu a zongiseli bango: "Na lobi na bino ya solo: tangu makambu nionso eko koma ya sika, pe Mwana ya mutu ako vanda na trône na ye ya nkembo, bino oyo bo landi ngai, boko vanda pe na ba trônes 12. Boko sambisa mabota 12 ya Israël.29Pe mutu nionso oyo a tiki bandeko na ye ya mibali to ya basi, tata, mama, mwasi, bana, bilanga to bandako pona kombo na ngai, ako zwa yango mbala cent, pe ako zwa bomoi ya seko lokola héritage.30Mais mingi oyo baza ya liboso bako koma ya suka, pe mingi oyo baza ya suka bako koma ya liboso."‹ PrécédentSuivant ›