Matthieu 11Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Tangu Yesu a silisi ko pesa mitindo na ba 12 disciples na ye, a longwe wana pona ko kende ko teya pe ko sakola na ba villes ya mboka.2Jean-Baptiste, oyo azalaki na prison, a yoki sango ya misala ya Kristu. A tindi ba disciples na ye ba tuna Yesu:3"Yo nde mutu oyo asengelaki ko ya, to to zela mutu mosusu?"4Yesu a zongiseli bango: "Bo kende ko yebisa Jean makambu oyo bozo yoka pe oyo bozo mona:5ba aveugles bazo mona, ba handicapés bazo tambola, batu oyo baza na lèpre bazo petolama, ba sourds bazo yoka, bakufi bazo zonga na bomoyi, pe sango malamu ezo sakolama na babola.6Esengo na mutu oyo ako kweya te à cause na ngai!7Tangu ba disciples ya Jean bazalaki ko zonga, Yesu a bandi ko lobela batu à propos ya Jean, a lobi: "Bo kendaki ko tala nini na désert? Lititi ya molayi oyo mopepe ezo ningisa?8Mais bo kendaki ko tala nini? Mutu oyo a lati bilamba ya talo? Batu oyo ba lataka bilamba ya talo ba vandaka na ba ndaku ya ba rois.9Donc, bo kendaki ko tala nini? Mosakoli? Oui, na yebisi bino, ye a leki kutu mosakoli.10Po eza ye nde ba komela maloba oyo: "Tala, nazo tinda motindami na ngai liboso na yo, pona a bongisela yo nzela."11Na yebisi bino ya solo: na kati ya batu nionso oyo ba botama na basi, mutu moko te a bimaki oyo a leki Jean-Baptiste na monene. Mais mutu oyo aza mukié koleka na bokonzi ya likolo a leki ye na monene.12Depuis tangu ya Jean-Baptiste ti sikoyo, bokonzi ya likolo ezo zwama na makasi, pe batu oyo ba salelaka makasi nde bazo botola yango.13Po ba sakoli nionso na mibeko ba sakolaki ti na tangu ya Jean.14Pe soki bo lingi ko comprendre yango, Jean nde Élie oyo asengelaki ko ya.15Mutu oyo aza na matoyi ya ko yoka, a yoka!16Nako comparer génération oyo na nani? Eza lokola bana oyo ba vandi na bisika oyo batu ebele bakutanaka, bazo loba na bana mosusu,17ba lobi: "To betelaki bino flûte, mais bo binaki te. To yembelaki bino ba nzembo ya mawa, mais bo lelaki te."18Po Jean a yaki, azalaki ko lia te pe ko mela te, mais ba lobi: "Aza na molimo mabe."19Mwana ya mutu a ye, azo lia pe azo mela, mais ba lobi: "Tala mutu ya lokoso pe molangwi, moninga ya ba futisi mpako pe ya batu ya masumu!" Mais misala nde e lakisi que mayele yango eza ya solo.20Alors Yesu a bandi ko pamela ba villes oyo a salaki mingi ya ba miracles na ye, po batu na yango ba bongolaki mitema te.21A lobi: "Mawa na yo, Chorazin! Mawa na yo, Bethsaïda! Po soki ba miracles oyo e salemaki na kati na bino e salemaki na Tyr na Sidon, mbele batu na yango ba bongola mitema kala, ba lata bilamba ya sac pe ba mi tia putulu."22Yango wana, na yebisi bino: na mokolo ya jugement, etumbu ya Tyr na Sidon eko zala moke koleka oyo ya bino.23Pe yo, Capernaüm, o kanisi que bako tombola yo ti na likolo? Non! Bako kitisa yo ti na mboka ya bakufi. Po soki ba miracles oyo e salemaki na kati na yo e salemaki na Sodome, mbele Sodome eza nanu ti lelo.24Yango wana, na yebisi bino: na mokolo ya jugement, etumbu ya mboka ya Sodome eko zala moke koleka oyo ya yo."25Na tangu wana, Yesu a lobi: "Na kumisi yo, Père, Nkolo ya likolo na mabele, po o bombelaki batu ya bwanya pe ya mayele makambu oyo, mais o lakisaki yango na bana ya mikié."26Oui, Père, na kumisi yo, po o lingaki e zala ndenge wana.27Père na ngai a pesa ngai biloko nionso. Mutu moko te a yebi Mwana, kaka Père. Pe mutu moko te a yebi Père, kaka Mwana pe mutu oyo Mwana a lingi ko lakisa Père.28Bo ya epa na ngai, bino nionso oyo bo lembi pe bo memi mikumba ya kilo, pe nako pesa bino bopemi.29Bo mema ekangiseli na ngai pe bo yamba mateya na ngai, po naza na boboto pe na motema ya ko mikitisa. Pe milimo na bino eko zwa bopemi.30Po ekangiseli na ngai eza pasi te, pe mokumba na ngai eza pepele.‹ PrécédentSuivant ›