Matthieu 14Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Na tangu wana, Hérode, mokonzi ya Galilée, a yoki sango ya Yesu. A lobi na ba serviteurs na ye: "Oyo aza Jean-Baptiste!2A zongi na bomoyi, yango wana aza na pouvoir ya ko sala ba miracles oyo."3Po Hérode a kangisaki Jean, a kangaki ye singa pe a bwakaki ye na prison à cause ya Hérodias, mwasi ya ndeko na ye Philippe.4Parce que Jean azalaki ko yebisa ye: "Eza permis te pona yo ko zwa ye lokola mwasi na yo."5A lingaki ko boma Jean, mais azalaki ko banga batu, po bango bazalaki ko zwa Jean lokola mosakoli.6Na fête ya anniversaire ya Hérode, mwana mwasi ya Hérodias a bini liboso ya ba invités, pe a sepelisi Hérode fort.7Yango wana, Hérode a lapi ndayi, a lapi ko pesa ye nionso oyo ako senga.8Lokola mama na ye a tindaki ye, mwana mwasi a lobi: "Pesa ngai awa motó ya Jean-Baptiste na plateau."9Mokonzi a yoki mawa. Mais à cause ya ndayi oyo a lapaki pe ba invités oyo bazalaki wana, a pesi mitindo ba pesa ye yango.10A tindi mutu na prison pona a kata Jean motó.11Ba ye na motó na ye na plateau, ba pesi yango na mwana mwasi, pe ye a memi yango epai ya mama na ye.12Ba disciples ya Jean ba ye ko zwa nzoto na ye pe ba kundi yango. Après, ba keyi ko yebisa Yesu.13Tangu Yesu a yoki sango yango, a longwe wana na bwatu pona ko kende na esika oyo batu bazalaki te, pona a zala ye moko. Mais tangu batu ba yoki yango, ba bimi na ba villes na bango pe ba landi ye na makolo.14Tangu Yesu a kitaki na bwatu, a moni ebele ya batu. A yoki mawa na bango, pe a bikisi batu oyo bazalaki ko bela.15Na pokwa, ba disciples ba pusani pene na ye pe ba lobi: "Esika oyo eza désert, pe heure esi e leki. Zongisa batu, pona ba kende na ba mboka ko somba biloko ya ko lia."16Mais Yesu a zongiseli bango: "Bazali na besoin ya ko kende te. Bino moko bo pesa bango biloko ya ko lia."17Ba lobi na ye: "Awa toza kaka na cinq mapa pe deux mbisi."18Yesu a lobi: "Bo memela ngai yango awa."19A yebisi batu ba vanda na matiti. A zui ba mapa cinq pe mbisi mibale, a tomboli miso na likolo pe a pesi Nzambe matondi. Après, a buki ba mapa, a pesi yango na ba disciples, pe bango ba kaboleli batu.20Batu nionso ba lie pe ba tondi. Ba disciples ba lokoti biteni oyo e tikali, ba tondisi ba kitunga 12.21Batu oyo ba liaki bazalaki environ 5000 mibali, sans ko tanga basi pe bana.22Mbala moko, Yesu a pesi ba disciples mitindo ba mata na bwatu pe ba kende liboso na ye na ngambo mosusu ya ebale, pendant que ye azo zongisa batu.23Après ko zongisa batu, a mati na ngomba pona ko sambela ye moko. Tangu pokwa e komi, azalaki wana ye moko.24Bwatu ezalaki déjà na kati ya ebale. Mbonge ya mayi ezalaki ko beta yango makasi, po mopepe ezalaki ko pepa contre bango.25Na suka ya butu, pene na tongo, Yesu a ye epai na bango, azo tambola likolo ya mayi ya ebale.26Tangu ba disciples ba moni ye azo tambola likolo ya mayi, somo e kangi bango. Ba lobi: "Eza elima!" Pe ba bandi ko ganga na somo.27Mbala moko, Yesu a lobi na bango: "Bo zala na calme! Eza ngai. Bo banga te!"28Pierre a zongiseli ye: "Nkolo, soki eza yo, pesa ngai mitindo na ya epai na yo likolo ya mayi."29Yesu a lobi: "Yaka!" Pierre a kiti na bwatu pe a bandi ko tambola likolo ya mayi pona ko kende epai ya Yesu.30Mais tangu a moni ndenge mopepe ezalaki makasi, a bandi ko banga. A bandi ko zinda pe a gangi: "Nkolo, bikisa ngai!"31Mbala moko, Yesu a semboli loboko, a simbi ye pe a lobi: "Yo mutu ya kondima moke, pona nini o tiaki tembe?"32Tangu ba mati na bwatu, mopepe e kiti.33Batu oyo bazalaki na bwatu ba fukami liboso ya Yesu pe ba lobi: "Ya solo, oza Mwana ya Nzambe!"34Après ko katisa ebale, ba komi na mboka ya Génésareth.35Tangu batu ya esika wana ba comprendre que eza Yesu, ba tindi sango na bisika nionso ya pembeni. Ba memeli ye batu nionso oyo bazalaki ko bela.36Ba bondeli ye a permettre bango ko simba ata kaka songe ya elamba na ye. Pe batu nionso oyo ba simbaki yango ba biki.‹ PrécédentSuivant ›