Marc 12Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Yesu a bandi ko lobela bango na ba paraboles: "Mutu moko a lonaki elanga ya vino. A zingi yango na clôture, a timoli esika ya ko finela ba raisins pe a tongi tour ya kokengela. Après, a pesi yango na basali ya elanga ba futela, pe a keyi na mboka mosusu.2Tangu ya kobuka e komi, a tindi mosali moko epai ya bafuteli, pona a zwa ndambu ya mbuma ya elanga.3Mais ba kangi mosali yango, ba beti ye pe ba zongisi ye maboko pamba.4A tindi lisusu mosali mosusu. Ba beti ye na motó pe ba sambwisi ye.5A tindi mosali ya misato; ba bomi ye. Après, a tindi basali mosusu mingi. Ba beti bamosusu pe ba bomi bamosusu.6Azalaki nanu na mwana moko ya bolingo. Na suka, a tindi ye epai na bango, a kanisi: Bako tosa mwana na ngai.7Mais bafuteli wana ba lobi entre bango: Oyo nde héritier! Bo ya, to boma ye, pe héritage ekozala ya biso.8Ba kangi ye, ba bomi ye pe ba bwaki ye libanda ya elanga.9Sikoyo, nkolo ya elanga ako sala nini? Ako ya, ako boma bafuteli wana pe ako pesa elanga na batu mosusu.10Bo tangaka liloba oyo na Makomi te: Libanga oyo batongi ba boyaki e komi libanga ya motuya na songe ya ndaku.11Nkolo nde a sali yango, pe eza likambu ya kokamwa na miso na biso?"12Ba lukaki ko kanga Yesu, mais ba bangaki ebele ya batu. Ba comprendre ete parabole yango ezalaki kolobela bango. Alors ba tiki ye pe ba keyi.13Ba tindeli Yesu ba Pharisiens mosusu pe batu ya parti ya Hérode, pona ba kanga ye na maloba na ye moko.14Ba ye pe ba lobi: "Moteyi, to yebi ete o lobaka vérité pe o bangaka mutu te. O talaka apparence ya batu te, mais o teyaka nzela ya Nzambe na vérité. Mibeko e pesi nzela ya ko futa impôt epai ya César to te? To futa to to futa te?"15Yesu a yebi hypocrisie na bango pe a zongisi: "Pona nini bozo meka ngai? Bo memela ngai bongo moko ya ebende, na tala yango."16Ba memeli ye moko. Yesu a tuni: "Elilingi oyo pe makomi oyo eza ya nani?" Ba zongisi: "Ya César."17Alors a lobi: "Bo pesa César oyo eza ya César, pe Nzambe oyo eza ya Nzambe." Ba kamwe ye mingi.18Ba Sadducéens, oyo ba lobaka ete lisekwa eza te, ba ye epai ya Yesu pe ba tuni ye:19"Moteyi, Moïse a komelaki biso ete soki ndeko ya mutu a kufi pe a tiki mwasi sans bana, ndeko na ye a bala mwasi oyo atikali, pona a botela ndeko na ye bana.20Ezalaki na bandeko sept. Ya liboso a bali pe a kufi sans ko tika bana.21Ya mibale a bali mwasi oyo atikalaki, pe ye pe a kufi sans bana. E salemi ndenge moko na ya misato.22Ata moko te na bango sept a tiki bana. Na suka, mwasi yango pe a kufi.23Na lisekwa, akozala mwasi ya nani? Po bango nionso sept ba balaki ye."24Yesu a zongisi: "Boza na erreur po bo comprendre Makomi te pe nguya ya Nzambe te, boye te?25Po tangu bakufi bako sekwa, mibali bako bala te pe basi bako balama te. Bako zala lokola ba anges na likolo.26Pona lisekwa ya bakufi, bo tangaka te na mokanda ya Moïse, na lisolo ya nzete oyo ezalaki ko pela moto, ndenge Nzambe a lobaki na ye: Naza Nzambe ya Abraham, Nzambe ya Isaac pe Nzambe ya Jacob?27Nzambe aza Nzambe ya bakufi te, mais ya batu ya bomoi. Boza na erreur monene."28Molakisi moko ya mibeko a yokaki bango ndenge bazo solola. A moni ete Yesu a zongiselaki ba Sadducéens réponse malamu. A pusani pe a tuni: "Mobeko nini eza ya liboso na kati ya mibeko nionso?"29Yesu a zongisi: "Oyo eza ya liboso: Yoka, Israël, Nkolo Nzambe na biso aza Nkolo kaka moko.30Linga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makanisi na yo nionso pe na makasi na yo nionso.31Oyo eza ya mibale: Linga moninga na yo ndenge o milingaka yo moko. Mobeko mosusu ya monene koleka oyo eza te."32Molakisi ya mibeko a lobi: "Malamu, Moteyi. O lobi vérité ete Nzambe aza kaka moko, mosusu aza te.33Ko linga ye na motema mobimba, na makanisi nionso, na molimo mobimba pe na makasi nionso, pe ko linga moninga ndenge o milingaka yo moko, e leki makabo nionso oyo ba tumbaka mobimba pe bambeka nionso."34Yesu a moni ete a zongisi na mayele, pe a lobi na ye: "Oza mosika te na bokonzi ya Nzambe." Mutu moko te a mekaki lisusu ko tuna ye motuna.35Tangu Yesu azalaki ko teya na temple, a lobi: "Ndenge nini balakisi ya mibeko ba lobaka ete Kristu aza mwana ya David?36David ye moko, na nzela ya Molimo Mosantu, a lobaki: Nkolo a lobi na Nkolo na ngai: Vanda na droite na ngai, tii na tia banguna na yo na se ya makolo na yo.37David ye moko a bengi ye Nkolo. Alors ndenge nini aza mwana na ye?" Ebele ya batu bazalaki ko yoka ye na esengo.38Na mateya na ye, a lobi: "Bo keba na balakisi ya mibeko. Ba lingaka ko tambola na bilamba milayi pe batu ba pesa bango mbote na bisika ya batu nionso.39Ba lukaka bakiti ya liboso na ba synagogues pe bisika ya lokumu na ba fêtes.40Ba liaka biloko ya basi oyo mibali ba kufa, pe ba salaka mabondeli milayi pona batu ba mona bango. Bako zwa etumbu ya makasi koleka."41Yesu a vandi liboso ya sanduku ya makabo. Azalaki ko tala ndenge batu bazalaki ko tia mbongo. Batu mingi ya bomengo bazalaki ko tia mingi.42Mwasi moko mobola oyo mobali a kufa a ye pe a tie mbongo mibale ya mike, oyo valeur na yango ezalaki un quart ya sou.43Yesu a bengi ba disciples na ye pe a lobi: "Na yebisi bino ya solo: mwasi ya mobola oyo a kufela mobali a pesi mingi koleka batu nionso oyo ba tie na sanduku.44Po bango nionso ba pesi na oyo eza ya koleka na bango. Mais ye, na kati ya bobola na ye, a pesi nionso oyo azalaki na yango, nionso oyo esengelaki ko salisa ye a zala na bomoi."‹ Précédent