Marc 1Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Oyo ebandeli ya Sango Malamu ya Yesu Kristu, Mwana ya Nzambe.2Ndenge ekomama na mokanda ya mosakoli Ésaïe: "Tala, nazo tinda motindami na ngai liboso na yo; ako bongisela yo nzela.3Mongongo ya mutu moko ezo ganga na esobe: Bo bongisa nzela ya Nkolo, bo sembola banzela na ye."4Jean a bimi na esobe, azalaki ko batisa batu pe ko sakola ete ba bongola mitema pe ba zwa batisimo pona masumu na bango e limbisama.5Batu ya Judée mobimba pe bavandi nionso ya Jérusalem bazalaki ko kende epai na ye. Ba ndimi masumu na bango, pe Jean a zalaki ko batisa bango na ebale Jourdain.6Jean azalaki ko lata elamba ya poils ya chameau pe ceinture ya poso ya nyama na loketo. Azalaki ko lia ba sauterelles pe mafuta ya nzoyi ya zamba.7Azalaki ko sakola: "Mutu oyo azo ya sima na ngai aza na nguya koleka ngai. Na mérité ata te ko gumbama pona ko fungola basinga ya ba sandales na ye.8Ngai nazali kobatisa bino na mayi, mais ye ako batisa bino na Molimo Mosantu."9Na tangu wana, Yesu a wuti na Nazareth, na Galilée, pe Jean a batisi ye na ebale ya Jourdain.10Tangu kaka Yesu a bimi na mayi, a moni likolo e fungwami pe Molimo a kiteli ye lokola colombe.11Pe mongongo e wuti na likolo, e lobi: "Oza Mwana na ngai ya bolingo; na sepelaka na yo mingi."12Mbala moko, Molimo a memi Yesu na esobe.13A vandi kuna mikolo quarante, Satana azalaki ko meka ye. Azalaki elongo na banyama ya zamba, pe ba anges bazalaki ko salela ye.14Après ba kangaki Jean, Yesu a keyi na Galilée, azalaki ko sakola Sango Malamu ya Nzambe.15Azalaki ko loba: "Tangu ekoki, bokonzi ya Nzambe e pusani pene. Bo bongola mitema pe bo ndima Sango Malamu."16Tangu Yesu azalaki ko leka pembeni ya ebale ya Galilée, a moni Simon pe André, ndeko ya Simon, bazo bwaka monyama na mayi, po bazalaki balobi ya mbisi.17Yesu a lobi na bango: "Bo landa ngai, pe nako komisa bino balobi ya batu."18Mbala moko, ba tiki minyama na bango pe ba landi ye.19A keyi mwa mosika, a moni Jacques, mwana ya Zébédée, pe Jean, ndeko na ye. Bango pe bazalaki na bwato, bazo bongisa minyama.20Mbala moko, a bengi bango. Ba tiki père na bango Zébédée na bwato elongo na basali, pe ba landi Yesu.21Ba keyi na Capernaüm. Na mokolo ya sabbat, Yesu a koti nanu na synagogue pe a bandi ko teya.22Batu ba kamwe mateya na ye, po azalaki ko teya na autorité, ndenge moko te na balakisi ya mibeko.23Na synagogue na bango, ezalaki na mutu moko oyo azalaki na molimo mabe. A bandi ko ganga:24"Yesu ya Nazareth, biso na yo likambu nini? O ye pona ko bebisa biso? Na yebi yo: oza Mosantu ya Nzambe!"25Yesu a pameli molimo yango, a lobi: "Kanga monoko! Bima na mutu oyo!"26Molimo mabe e ningisi mutu yango makasi, e gangi na mongongo makasi pe e bimi na ye.27Batu nionso ba kamwe, ba bandi ko tunana: "Oyo nini? Mateya ya sika! Azo pesa ata milimo mabe mitindo na autorité, pe yango ezo tosa ye!"28Mbala moko, sango na ye e panzani na bisika nionso ya Galilée pe ya pembeni.29Tangu ba bimi na synagogue, ba keyi na ndaku ya Simon pe André, elongo na Jacques pe Jean.30Mama bokilo ya Simon azalaki ya ko lala, azalaki na fièvre. Mbala moko, ba yebisi Yesu likambu na ye.31Yesu a pusani, a simbi ye na loboko pe a telemisi ye. Fièvre e sili mbala moko, pe a bandi ko salela bango.32Na pokwa, après moyi e lalaki, ba memeli Yesu babeli nionso pe batu oyo bazalaki na milimo mabe.33Ville mobimba e sanganaki liboso ya porte ya ndaku.34A bikisi batu mingi oyo bazalaki na ba maladies ya ndenge na ndenge, pe a bengani milimo mabe mingi. A pekisi milimo yango ko loba, po e yebaki ye.35Na tongo-tongo, tangu molili ezalaki nanu makasi, Yesu a lamuki, a bimi pe a keyi na esika oyo batu bazalaki te. Kuna, a sambelaki.36Simon pe batu oyo bazalaki elongo na ye ba keyi ko luka Yesu.37Tangu ba moni ye, ba lobi na ye: "Batu nionso bazo luka yo."38A zongiseli bango: "To kende na bisika mosusu, na bamboka ya pembeni, pona na sakola kuna pe. Po nayaki po na yango."39A tamboli na Galilée mobimba, azalaki ko sakola na ba synagogues pe ko bengana milimo mabe.40Mutu moko oyo azalaki na maladie ya lèpre a ye epai na ye, a fukami pe a bondeli ye: "Soki o lingi, o koki ko petola ngai."41Yesu a yokeli ye mawa, a semboli loboko, a simbi ye pe a lobi: "Na lingi. Zala peto!"42Mbala moko, lèpre e sili, pe mutu yango a komi peto.43Yesu a zongisi ye mbala moko, après ko kebisa ye makasi.44A lobi na ye: "Keba, ko yebisa mutu ata likambu moko te. Mais kende ko milakisa na nganga-nzambe. Pesa likabo oyo Moïse a kataki pona kopetolama na yo, pona e zala témoignage liboso na bango."45Mais tangu mutu yango a keyi, a bandi ko loba likambu yango polele pe ko panza sango. Yango wana Yesu a kokaki lisusu te ko kota na ville na miso ya batu nionso. Azalaki ko vanda libanda, na bisika oyo batu bazalaki te, mais batu bazalaki ko wuta bipai nionso pona ko ya epai na ye.