Matthieu 23Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Alors Yesu a lobeli ebele ya batu pe ba disciples na ye. A lobi:2"Ba moteyi ya mibeko pe ba pharisiens ba vandi na kiti ya Moïse.3Alors bo sala pe bo tosa nionso oyo ba yebisaka bino. Mais bo landa misala na bango te, po ba lobaka mais ba salaka te.4Ba kangaka mikumba ya kilo pe ba tiaka yango na mapeka ya batu. Mais bango moko ba lingaka ata ko ningisa yango na mosapi te.5Misala na bango nionso eza pona batu ba mona bango. Ba komisaka minene mikanda na bango esika bakoma makomi, pe ba komisaka milai ba songe ya bilamba na bango.6Ba lingaka bisika ya liboso na ba fêtes pe ba kiti ya liboso na ba synagogues.7Ba lingaka batu ba pesa bango mbote na ba places publiques pe ba benga bango: Rabbi, Rabbi.8Mais bino, bo luka te ba benga bino Rabbi, po boza na Moteyi moko kaka, pe bino nionso boza bandeko.9Pe bo benga mutu moko te awa na mokili père na bino, po boza na Père moko kaka, oyo aza na likolo.10Bo luka te ba benga bino bakonzi, po boza Mokonzi moko kaka: Kristu.11Mutu oyo aza monene koleka parmi bino ako zala serviteur na bino.12Mutu nionso oyo ako komitombola, bako kitisa ye. Pe mutu nionso oyo ako komikitisa, bako tombola ye.13Mawa na bino, ba moteyi ya mibeko pe ba pharisiens, ba hypocrites! Po bozo kangela batu bokonzi ya likolo. Bino moko bozo kota te, pe bozo tika te batu oyo ba lingi ko kota ba kota.14Mawa na bino, ba moteyi ya mibeko pe ba pharisiens, ba hypocrites! Po bo liaka biloko ya basi oyo ba kufela mibali, pe bo salaka mabondeli ya milayi kaka pona ko monana. Pona yango, bako sambisa bino makasi koleka.15Mawa na bino, ba moteyi ya mibeko pe ba pharisiens, ba hypocrites! Po bo tambolaka na ebale pe na mabele pona ko zwa ata mutu moko a kota na religion na bino. Soki a koti, bo komisaka ye mwana ya lifelo deux fois koleka bino.16Mawa na bino, ba guides bakufa miso! Bo lobaka: Soki mutu a lapi ndayi na temple, eza eloko te. Mais soki a lapi ndayi na or ya temple, esengeli a kokisa ndayi yango.17Bino batu sans mayele pe bakufa miso! Nini eza monene koleka: or, to temple oyo e komisaka or yango mosantu?18Bo lobaka pe: Soki mutu a lapi ndayi na autel, eza eloko te. Mais soki a lapi ndayi na likabo oyo eza na autel, esengeli a kokisa ndayi yango.19Batu bakufa miso! Nini eza monene koleka: likabo, to autel oyo e komisaka likabo yango mosantu?20Mutu oyo a lapi ndayi na autel, a lapi na autel pe na nionso oyo eza likolo na yango.21Mutu oyo a lapi ndayi na temple, a lapi na temple pe na oyo a vandaka na kati na yango.22Pe mutu oyo a lapi ndayi na likolo, a lapi na trône ya Nzambe pe na oyo a vandi na yango.23Mawa na bino, ba moteyi ya mibeko pe ba pharisiens, ba hypocrites! Bo pesaka dîme ya menthe, aneth pe cumin, mais bo tikaka makambu ya motuya koleka na Mibeko: justice, mawa pe fidélité. Esengelaki bo sala makambu wana, sans ko négliger oyo mosusu.24Ba guides bakufa miso! Bo filtraka mwa nzinzi, mais bo melaka chameau mobimba!25Mawa na bino, ba moteyi ya mibeko pe ba pharisiens, ba hypocrites! Bozo sukola libanda ya kopo pe ya sani, mais na kati etondi na moyibi pe lokoso.26Pharisien akufa miso! Sukola liboso kati ya kopo pe ya sani, pona libanda pe e koma peto.27Mawa na bino, ba moteyi ya mibeko pe ba pharisiens, ba hypocrites! Boza lokola ba tombeaux oyo ba pakoli peinture ya pembe. Na libanda e monanaka kitoko, mais na kati etondi na mikuwa ya bakufi pe mbindo ya ndenge nionso.28Bino pe ndenge moko: na libanda bo monanaka sembo na miso ya batu, mais na kati bo tondi na hypocrisie pe mabe.29Mawa na bino, ba moteyi ya mibeko pe ba pharisiens, ba hypocrites! Bo tongaka ba tombeaux ya ba prophètes pe bozo décorer malita ya batu ya sembo.30Bo lobaka: Soki to zalaki na tangu ya ba koko na biso, to lingaki ko sangana na bango te pona ko sopa makila ya ba prophètes.31Boye bino moko bozo témoigner que boza bana ya batu oyo ba bomaki ba prophètes.32Alors bo tondisa mesure ya mabe oyo ba koko na bino ba bandaki!33Banyoka, libota ya ba vipères! Ndenge nini boko kima etumbu ya lifelo?34Yango wana, tala, nazo tindela bino ba prophètes, batu ya bwanya pe ba moteyi ya mibeko. Boko boma pe boko baka ba mosusu na ekulusu. Boko beta ba mosusu fimbu na ba synagogues na bino, pe boko nyokola bango na ville na ville.35Comme ça, makila nionso ya batu sans faute oyo e sopamaki na mokili eko zongela bino: banda makila ya Abel, mutu ya sembo, tii makila ya Zacharie, mwana ya Barachie, oyo bo bomaki na kati ya temple pe autel.36Na lobi na bino ya solo: makambu wana nionso eko zongela génération oyo.37Jérusalem, Jérusalem! Yo oyo o bomaka ba prophètes pe o bambaka mabanga na batu oyo ba tindelaka yo! Mbala boni na lingaki ko sangisa bana na yo, lokola soso a sangisaka bana na ye na se ya mapapu na ye, mais bino bo lingaki te!38Tala, bako tikela bino ndako na bino pamba.39Po na lobi na bino: banda sikoyo, boko mona ngai lisusu te, tii bo koloba: A pambolama, oyo azo ya na kombo ya Nkolo!"‹ Précédent