Matthieu 25Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Alors, bokonzi ya likolo eko zala lokola bilenge basi dix oyo ba yebaki nanu mobali te. Ba zui minda na bango pe ba keyi ko kutana na mobali ya libala.2Cinq bazalaki sans mayele, pe cinq bazalaki na mayele.3Ba oyo bazalaki sans mayele ba zui minda na bango, mais ba memaki mafuta te.4Mais ba oyo bazalaki na mayele ba memi mafuta na ba vases elongo na minda na bango.5Lokola mobali ya libala a wumeli, bango nionso ba bandi ko doza pe ba lali pongi.6Na kati ya butu, mongongo e gangi: "Tala mobali ya libala! Bo kende ko kutana na ye!"7Alors bilenge basi wana nionso ba lamuki pe ba bongisi minda na bango.8Ba oyo bazalaki sans mayele ba lobi na ba oyo bazalaki na mayele: "Bo pesa biso mwa mafuta na bino, po minda na biso ezo kufa."9Mais ba oyo bazalaki na mayele ba zongisi: "Te, eko koka te pona biso pe bino. Bo kende nde epai ya ba vendeurs, bo somba oyo ya bino."10Tangu ba keyi ko somba yango, mobali ya libala a komi. Ba oyo bazalaki prêt ba koti elongo na ye na salle ya fête ya libala, pe ba kangi porte.11Après, bilenge basi mosusu ba ye pe ba lobi: "Nkolo, Nkolo, fungolela biso!"12Mais a zongisi: "Na lobi na bino ya solo: na yebi bino te."13Yango wana bo lala pongi te, po bo yebi mokolo te pe heure te.14Eko zala lokola mutu moko oyo alingaki ko sala mobembo. A bengi ba serviteurs na ye pe a pesi bango biloko na ye.15A pesi moko ba talents cinq, mosusu mibale, pe oyo ya misato moko. A pesi mutu na mutu ndenge makoki na ye eza, pe a keyi.16Mbala moko, oyo a zwaki ba talents cinq a keyi ko salela yango commerce, pe a gagner ba talents cinq mosusu.17Ndenge moko, oyo a zwaki ba talents mibale a gagner mibale mosusu.18Mais oyo a zwaki kaka talent moko a keyi ko timola libulu na mabele pe a bombi mbongo ya nkolo na ye.19Après tangu molai, nkolo ya ba serviteurs wana a zongi pe a sengi bango compte.20Oyo a zwaki ba talents cinq a pusani, a memi cinq mosusu pe a lobi: "Nkolo, o pesaki ngai ba talents cinq. Tala, na zui cinq mosusu."21Nkolo na ye a lobi: "Malamu, serviteur malamu pe ya sembo! O zalaki sembo na biloko muke, nako pesa yo responsabilité ya biloko mingi. Kota na esengo ya nkolo na yo."22Oyo a zwaki ba talents mibale pe a pusani pe a lobi: "Nkolo, o pesaki ngai ba talents mibale. Tala, na zui mibale mosusu."23Nkolo na ye a lobi: "Malamu, serviteur malamu pe ya sembo! O zalaki sembo na biloko muke, nako pesa yo responsabilité ya biloko mingi. Kota na esengo ya nkolo na yo."24Après, oyo a zwaki kaka talent moko a pusani pe a lobi: "Nkolo, na yebaki que oza mutu ya makasi. O bukaka mbuma esika o lonaki te, pe o sangisaka mbuma esika o pepolaki te.25Na bangaki, yango wana na kendaki ko bomba talent na yo na mabele. Tala, zwa oyo eza ya yo."26Nkolo na ye a zongisi: "Serviteur mabe pe ya goigoi! O yebaki que na bukaka mbuma esika na lonaki te pe na sangisaka esika na pepolaki te27Alors esengelaki o pesa mbongo na ngai na banque. Tangu na zongi, nalingaki ko zwa mbongo na ngai elongo na intérêt.28Bo longolela ye talent wana pe bo pesa yango na oyo aza na ba talents dix.29Po mutu oyo aza na yango, bako pesa ye lisusu pe ako zala na mingi. Mais oyo aza na yango te, bako longolela ye ata oyo aza na yango.30Pe serviteur oyo aza na tina te, bo bwaka ye na molili ya libanda. Kuna nde bako lela pe bako lia minu."31Tangu Mwana ya mutu ako ya na nkembo na ye elongo na ba anges nionso, ako vanda na trône na ye ya nkembo.32Bikolo nionso bako sangana liboso na ye. Ako kabola batu, ndenge mobateli ya bibwele a kabolaka ba meme na ba ntaba ya mibali.33Ako tia ba meme na droite na ye, pe ba ntaba na gauche.34Alors Roi ako loba na batu oyo baza na droite na ye: "Bo ya, bino oyo Père na ngai a pamboli! Bo zwa bokonzi oyo ba bongiselaki bino banda mokili e kelamaki.35Po na zalaki na nzala, pe bo pesaki ngai bilei. Na zalaki na posa ya mayi, pe bo pesaki ngai ya ko mela. Na zalaki mopaya, pe bo yambaki ngai.36Na zalaki bolumbu, pe bo latisaki ngai. Na zalaki malade, pe bo yaki ko tala ngai. Na zalaki na boloko, pe bo yaki epai na ngai."37Batu ya sembo bako zongisela ye: "Nkolo, tangu nini to monaki yo na nzala pe to pesaki yo bilei? To na posa ya mayi pe to pesaki yo ya ko mela?38Tangu nini to monaki yo mopaya pe to yambaki yo? To bolumbu pe to latisaki yo?39Tangu nini to monaki yo malade to na boloko pe to yaki epai na yo?"40Mokonzi ako zongisela bango: "Na lobi na bino ya solo: mbala nionso bo salelaki moko ya bandeko na ngai oyo ya mike makambu wana, bo salelaki ngai yango."41Après, ako loba na batu oyo baza na gauche na ye: "Bo longwa mosika na ngai, bino oyo boza na malédiction. Bo kende na moto ya seko oyo ba bongisela diable pe ba anges na ye.42Po na zalaki na nzala, mais bo pesaki ngai bilei te. Na zalaki na posa ya mayi, mais bo pesaki ngai ya ko mela te.43Na zalaki mopaya, mais bo yambaki ngai te. Na zalaki bolumbu, mais bo latisaki ngai te. Na zalaki malade pe na boloko, mais bo yaki ko tala ngai te."44Bango pe bako zongisa: "Nkolo, tangu nini to monaki yo na nzala, na posa ya mayi, mopaya, bolumbu, malade to na boloko, pe to sungaki yo te?"45Alors ako zongisela bango: "Na lobi na bino ya solo: mbala nionso bo salelaki moko ya batu oyo ya mike makambu wana te, bo salelaki ngai yango te."46Batu wana bako kende na etumbu ya seko, mais batu ya sembo bako kende na bomoi ya seko."‹ Précédent