Matthieu 6Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Attention ko sala makambu ya bien liboso ya batu kaka pona ba mona bino. Sinon, bo kozwa récompense te epa ya Père na bino oyo aza na likolo.2Tangu ozo sunga babola, ko betela ngo fanfare te, ndenge ba hypocrites ba salaka na ba synagogues pe na ba balabala, pona batu ba kumisa bango. Na yebisi bino ya solo: basi ba zwi récompense na bango.3Mais yo, tangu ozo sunga, loboko na yo ya gauche e yeba te oyo loboko ya droite ezo sala,4comme ça lisungi na yo e pesama na secret. Pe Père na yo, oyo a monaka makambu oyo ezo salema na secret, ako récompenser yo.5Tangu bozo sambela, bo zala lokola ba hypocrites te. Ba lingaka ko sambela ya ko telema na ba synagogues pe na ba coins ya ba balabala, pona batu ba mona bango. Na yebisi bino ya solo: basi ba zwi récompense na bango.6Mais yo, tangu ozo sambela, kota na chambre na yo, kanga porte, pe sambela Père na yo oyo aza wana na secret. Pe Père na yo, oyo a monaka makambu oyo ezo salema na secret, ako récompenser yo.7Tangu ozo sambela, ko zongela-zongela maloba ya pamba te, ndenge ba païens ba salaka. Ba kanisaka que Nzambe ako yoka bango à cause ya maloba na bango ya ebele.8Bo zala lokola bango te, po Père na bino a yebi biloko oyo boza na ngo besoin avant bo senga ye.9Tala ndenge il faut bo sambela: "Père na biso oyo oza na likolo, tika kombo na yo e santisama.10Tika bokonzi na yo e ya. Tika mokano na yo e salema awa na mabele, ndenge e salemaka na likolo.11Pesa biso lelo mapa na biso ya mokolo na mokolo.12Limbisa mabe na biso, ndenge biso pe to limbisaka ba oyo ba saleli biso faux.13Ko mema biso na komekama te, mais kangola biso na monguna. Po bokonzi, nguya pe lokumu eza ya yo, seko na seko. Amen!"14Soki bo limbisi batu mabe oyo ba saleli bino, Père na bino oyo aza na likolo ako limbisa bino pe.15Mais soki bo limbisi batu te, Père na bino pe ako limbisa mabe na bino te.16Tangu bozo sala jeûne, bo zala na bilongi ya mawa te, ndenge ba hypocrites ba salaka. Ba bebisaka bilongi na bango pona ko lakisa batu que bazo sala jeûne. Na yebisi bino ya solo: basi ba zwi récompense na bango.17Mais yo, tangu ozo sala jeûne, pomper parfum na motó na yo pe sukola elongi na yo,18pona o lakisa batu te que ozo sala jeûne, mais kaka Père na yo oyo aza wana na secret. Pe Père na yo, oyo a monaka makambu oyo ezo salema na secret, ako récompenser yo.19Bo bomba ba trésors na bino awa na mabele te, esika ba insectes pe rouille e bebisaka biloko, pe esika ba miyibi ba bukaka pona ko yiba.20Mais bo bomba ba trésors na bino na likolo, esika ba insectes pe rouille e bebisaka biloko te, pe ba miyibi ba bukaka pona ko yiba te.21Po esika trésor na yo eza, motema na yo pe eko zala wana.22Liso eza mwinda ya nzoto. Soki liso na yo eza bien, nzoto na yo mobimba eko zala na lumière.23Mais soki liso na yo eza mabe, nzoto na yo mobimba eko zala na molili. Donc, soki lumière oyo eza na kati na yo eza molili, molili yango eko zala makasi fort!24Mutu moko te akoki ko salela mikonzi mibale. Po ako yina moko pe ako linga mosusu, to ako kangama na moko pe ako mépriser mosusu. Bo koki ko salela Nzambe na mbongo en même temps te.25Yango wana, na yebisi bino: bo mitungisa te pona bomoyi na bino, que bo kolia nini, to pona nzoto na bino, que bo kolata nini. Bomoyi e leki bileyi te? Pe nzoto e leki bilamba te?26Bo tala ba ndeke ya likolo: ba lonaka te, ba bukaka te, pe bombaka bileyi na ba dépôts te. Mais Père na bino oyo aza na likolo a leisaka bango. Est-ce que bino boza na valeur koleka bango te?27Nani na kati na bino, na ko mitungisa, akoki ko bakisa ata mwa temps moke na bomoyi na ye?28Pe pona nini bo mitungisaka pona bilamba? Bo tala ndenge ba fleurs e kolaka na bilanga: e salaka mosala te, pe e tongaka bilamba te.29Mais na yebisi bino: ata Salomon, na lokumu na ye nionso, a lataki ko leka moko ya ba fleurs wana te.30Soki Nzambe a latisaka ndenge wana matiti ya bilanga, oyo eza lelo pe lobi bako bwaka yango na moto, ako latisa bino koleka yango te? Bino batu ya kondima moke!31Donc, bo mitungisa te na ko loba: "To kolia nini? To komela nini? To kolata nini?"32Po eza ba païens nde ba lukaka biloko wana nionso. Père na bino oyo aza na likolo a yebi que boza na besoin na yango.33Bo luka liboso bokonzi ya Nzambe na justice na ye, pe biloko wana tout eko bakiselama bino.34Donc, bo mitungisa te pona lobi, po lobi eko mitungisa pona makambu na yango moko. Mokolo na mokolo eza déjà na pasi oyo ekoki na yango.‹ PrécédentSuivant ›