Matthieu 27Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Tangu tongo e tani, ba chefs nionso ya ba nganga-nzambe pe ba anciens ya peuple ba sali conseil contre Yesu pona ko boma ye.2Ba kangi ye na basinga, ba memi ye pe ba pesi ye na maboko ya gouverneur Ponce Pilate.3Alors Judas, oyo a tekaki ye, a moni que ba kateli Yesu etumbu. A yoki mawa pona oyo a sali, pe a zongisi mbongo 30 ya bibende epai ya ba chefs ya ba nganga-nzambe pe ba anciens.4A lobi: "Na sali lisumu, po na teki makila ya mutu sans faute." Ba zongisi: "Etali biso na nini? Wana etali yo."5Judas a bwaki mbongo wana na temple. A longwe wana pe a keyi ko midiembika.6Ba chefs ya ba nganga-nzambe ba lokoti yango pe ba lobi: "Toza na droit te ya ko tia yango na caisse ya temple, po eza prix ya makila."7Après ko solola, ba sombi na mbongo wana elanga ya mosali ya potier, pona ko kunda bapaya kuna.8Yango wana ba bengaka elanga wana elanga ya makila, tii lelo.9Boye, liloba oyo mosakoli Jérémie a lobaki e kokisami: "Ba zui mbongo trente ya bibende, prix oyo bana ya Israël ba kataki pona ye.10Ba pesi yango pona elanga ya mosali ya potier, ndenge Nkolo a tindaki ngai."11Yesu a telemi liboso ya gouverneur. Gouverneur a tuni ye: "Oza roi ya ba Juifs?" Yesu a zongiseli ye: "O lobi yango."12Mais a zongisi eloko te na ba accusations ya ba chefs ya ba nganga-nzambe pe ba anciens.13Alors Pilate a tuni ye: "Ozo yoka te ebele ya makambu oyo bazo funda yo na yango?"14Mais Yesu a zongiseli ye ata liloba moko te, pe yango e kamwisaki gouverneur mingi.15Na fête nionso, gouverneur azalaki na momesano ya ko bimisa prisonnier moko, oyo ebele ya batu bazalaki ko senga.16Bazalaki na prisonnier moko oyo ayebanaki fort, kombo na ye Barabbas.17Tangu batu ba sangani, Pilate a tuni bango: "Bo lingi na bimisela bino nani: Barabbas to Yesu oyo ba bengi Kristu?"18Po ayebaki que ba pesaki ye Yesu pona zuwa.19Tangu azalaki ko vanda na tribunal, mwasi na ye a tindeli ye message: "Ko kota na likambu ya mutu wana ya sembo te. Po lelo na moni pasi mingi na ndoto pona ye."20Mais ba chefs ya ba nganga-nzambe pe ba anciens ba ndimisi ebele ya batu ba senga Barabbas a bima, pe Yesu a kufa.21Gouverneur a zui maloba pe a tuni bango: "Parmi bango mibale, bo lingi na bimisela bino nani?" Ba zongisi: "Barabbas!"22Pilate a tuni: "Alors na sala nini na Yesu oyo ba bengi Kristu?" Bango nionso ba zongisi: "Ba baka ye na ekulusu!"23Gouverneur a tuni: "Mais mabe nini a sali?" Ba gangi lisusu makasi: "Ba baka ye na ekulusu!"24Pilate a moni que azo longa eloko te, mais mobulu ezo bakisama. A zui mayi pe a sukoli maboko na ye liboso ya batu. A lobi: "Ngai naza sans faute na makila ya mutu oyo ya sembo. Wana etali bino."25Pe peuple mobimba e zongisi: "Makila na ye e zongela biso pe bana na biso!"26Alors Pilate a bimiseli bango Barabbas. A betisi Yesu fimbu, pe après a pesi ye pona ba baka ye na ekulusu.27Ba soldats ya gouverneur ba memi Yesu na ndako ya gouverneur pe ba sangisi troupe mobimba zingazinga na ye.28Ba longoli ye bilamba pe ba latisi ye manteau ya motane makasi.29Ba tongi couronne ya banzube, ba tié yango na motu na ye, pe ba pesi ye mwa nzete ya roseau na loboko ya droite. Après, ba fukami liboso na ye pe bazo seka ye: "Mbote, roi ya ba Juifs!"30Ba bwakeli ye soyi, ba zui nzete wana pe ba beti ye na motu.31Après ko seka ye ndenge wana, ba longoli ye manteau, ba zongisi bilamba na ye, pe ba memi ye pona ko baka ye na ekulusu.32Tangu ba bimi, ba kutani na mobali moko ya Cyrène, kombo na ye Simon. Ba forcer ye a mema ekulusu ya Yesu.33Ba komi na esika oyo ba bengi Golgotha, elingi ko loba: Esika ya Mokuwa ya Motu.34Ba pesi ye vin oyo ba sangisi na mayi ya bololo a mela. Mais tangu a goûter yango, a boyaki ko mela yango.35Après ko baka ye na ekulusu, ba kabolani bilamba na ye na tirage au sort. Boye liloba ya mosakoli e kokisami: "Ba kabolani bilamba na ngai, pe ba beti zeke pona tunique na ngai."36Après, ba vandi wana pona ko kengelela ye.37Likolo ya motu na ye, ba tié makomi oyo e lakisi raison ya condamnation na ye: "Oyo aza Yesu, roi ya ba Juifs."38Ba bakaki pe ba bandits mibale na ba ekulusu elongo na ye: moko na droite na ye, mosusu na gauche.39Batu oyo bazalaki ko leka ba fingaki ye, bazalaki ko ningisa mitu40pe ko loba: "Yo oyo o bukisaka temple pe o tongaka yango lisusu na mikolo misato, mibikisa yo moko! Soki oza Mwana ya Nzambe, kita na ekulusu!"41Ba chefs ya ba nganga-nzambe, elongo na ba moteyi ya mibeko pe ba anciens, bango pe bazalaki ko seka ye. Ba lobi:42"A bikisaki batu mosusu, mais akoki ko mibikisa ye moko te! Soki aza roi ya Israël, a kita na ekulusu, pe toko ndimela ye.43A tiaki confiance na Nzambe. Nzambe a bikisa ye sikoyo soki a lingi ye. Po a lobaki: Naza Mwana ya Nzambe."44Ba bandits oyo ba bakamaki na ba ekulusu elongo na ye pe ba fingaki ye ndenge moko.45Banda midi tii 15h, molili ezalaki na mokili mobimba.46Pene ya 15h, Yesu a gangi na mongongo makasi: "Éli, Éli, lama sabachthani?" Elingi ko loba: "Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, pona nini o tiki ngai?"47Batu mosusu oyo bazalaki wana ba yoki yango pe ba lobi: "Azo benga Élie."48Mbala moko, moko na bango a poti mbangu ko zwa éponge. A tondisi yango na vinaigre, a kangi yango na mwa nzete ya roseau pe a pesi Yesu a mela.49Mais ba mosusu ba lobi: "Tika, to tala soki Élie ako ya ko sauver ye."50Yesu a gangi lisusu na mongongo makasi pe a zongisi molimo.51Mbala moko, rideau ya temple e pasuki biteni mibale, banda likolo tii na se. Mabele e ningani, mabanga minene e pasuki,52malita e fungwami, pe nzoto ya basantu mingi oyo ba kufaki e sekwi.53Ba bimi na malita, pe après lisekwa ya Yesu, ba koti na ville mosantu. Batu mingi ba moni bango.54Chef ya ba soldats pe batu oyo bazalaki elongo na ye pona ko kengelela Yesu ba moni koningana ya mabele pe makambu oyo e salemaki. Somo monene e kangi bango, pe ba lobi: "Ya solo, mutu oyo azalaki Mwana ya Nzambe!"55Basi mingi bazalaki wana, bazo tala na mosika. Ba landaki Yesu banda Galilée pona ko salela ye.56Parmi bango, ezalaki Marie ya Magdala, Marie mama ya Jacques pe Joseph, pe mama ya bana ya Zébédée.57Tangu pokwa e komi, mutu moko ya bozui ya Arimathée a ye. Kombo na ye Joseph, pe ye pe azalaki disciple ya Yesu.58A keyi epai ya Pilate pe a sengi nzoto ya Yesu. Pilate a pesi ordre ba pesa ye yango.59Joseph a zui nzoto pe a zingeli yango na elamba ya pembe.60A tié yango na lilita ya sika oyo a salisaki pona ye moko na kati ya libanga monene. Après, a tindiki libanga monene liboso ya ekotelo ya lilita, pe a keyi.61Marie ya Magdala pe Marie mosusu bazalaki wana, ba vandi liboso ya lilita.62Mokolo oyo e landaki, après mokolo ya préparation, ba chefs ya ba nganga-nzambe pe ba pharisiens ba keyi elongo epai ya Pilate.63Ba lobi: "Nkolo, to kanisi que tangu mokosi wana azalaki nanu na bomoi, a lobaki: Après mikolo misato nako sekwa.64Alors pesa ordre ba kengela lilita tii mokolo ya misato. Po ba disciples na ye ba ya ko yiba nzoto te pe ba yebisa peuple: A sekwi parmi bakufi. Lokuta wana ya suka eko zala mabe koleka oyo ya liboso."65Pilate a lobi na bango: "Boza na ba gardes. Bo kende, bo kengelela yango ndenge bokanisi kosala."66Ba keyi, ba tié elembo na libanga pe ba tié ba gardes, pona ko batela lilita malamu.‹ Précédent