Matthieu 5Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Tangu Yesu a moni ebele ya batu, a mati na ngomba. A vandi, ba disciples na ye ba pusani pene na ye.2A bandi ko teya bango, a lobi:3"Esengo na ba oyo baza babola na molimo, po bokonzi ya likolo eza ya bango.4Esengo na ba oyo bazo lela, po Nzambe ako consoler bango.5Esengo na batu ya komikitisa, po mokili eko zala héritage na bango.6Esengo na batu oyo baza na posa makasi ya justice, po Nzambe ako tondisa bango.7Esengo na batu oyo ba yokelaka ba misusu mawa, po bango pe bako yokela bango mawa.8Esengo na batu oyo baza na mitema ya peto, po bako mona Nzambe.9Esengo na batu oyo ba tiaka kimia na kati na batu, po bako bengama bana ya Nzambe.10Esengo na batu oyo bazo nyokolama pona justice, po bokonzi ya likolo eza ya bango.11Esengo na bino tangu batu bako finga bino, bako nyokola bino, pe bako kosela bino makambu ya mabe ya ndenge nionso à cause na ngai.12Bo sepela pe bo zala na esengo fort, po récompense na bino eko zala monene na likolo. Po eza kaka ndenge wana nde ba nyokolaki ba sakoli oyo ba zalaki liboso na bino.13Bino boza mungwa ya mokili. Mais soki mungwa e bungisi elengi na yango, bako zongisa yango lisusu ndenge nini? Eko zala lisusu na tina te. E tikali kaka ko bwaka yango libanda, batu ba nyata yango.14Bino boza lumière ya mokili. Ville oyo eza likolo ya ngomba ekoki ko batama te.15Ba pelisaka mwinda te pona ko zipa yango na se ya kitunga. Ba tiaka yango nde likolo, pona e pesa lumière na batu tout oyo baza na ndaku.16Ndenge wana pe, mwinda na bino e ngenga liboso ya batu, pona ba mona misala na bino ya malamu pe ba pesa lokumu na Père na bino oyo aza na likolo.17Bo kanisa te que na ye pona ko longola mibeko to maloba ya ba sakoli. Na ye pona ko longola yango te, mais pona ko kokisa yango.18Na yebisi bino ya solo: ti tangu likolo na mabele eko leka, ata lettre moko ya mukié ya mibeko eko longwa te, ti makambu nionso e kokisama.19Donc, mutu oyo ako longola ata mobeko moko ya mukié kati na mibeko oyo, pe ako teya batu ba sala ndenge wana, bako benga ye mutu ya pamba na bokonzi ya likolo. Mais oyo ako tosa mibeko yango pe ako teya batu ba tosa yango, bako benga ye mutu monene na bokonzi ya likolo.20Po na yebisi bino: soki justice na bino e leki oyo ya ba lakisi ya mibeko na ba pharisiens te, bo kokota na bokonzi ya likolo te.21Bo yokaki que ba lobaka na ba koko: "Ko boma mutu te. Mutu oyo ako boma mutu, ba juges basengeli ko sambisa ye."22Mais ngai na yebisi bino: mutu nionso oyo ako kangela ndeko na ye kanda, ba juges faut ba sambisa ye. Oyo ako finga ndeko na ye: "zoba!", asengeli ko samba liboso ya conseil monene ya ba Juifs. Pe oyo ako loba na ye: "moto ya liboma!", a mérité etumbu ya moto ya lifelo.23Donc, soki o memi likabo na yo na autel, pe kuna o se rappeller que ndeko na yo aza na likambu na yo,24tika likabo na yo wana liboso ya autel. Kende nanu ko yokana na ndeko na yo, après zonga ko pesa likabo na yo.25Yokana bien na mutu oyo azo funda yo, tangu boza nanu na nzela elongo. Sinon te, ako mema yo epa ya juge, juge ako pesa yo na maboko ya agent ya justice, pe bako tia yo na boloko.26Na yebisi yo ya solo: oko bima wana te ti o futa niongo nionso.27Bo yokaki que ba lobaki: "Ko sala ekobo te."28Mais ngai na yebisi bino: mutu nionso oyo a tali mwasi na makanisi ya ko lula ye, asi a sali ekobo na ye na motema na ye.29Soki liso na yo ya droite ezo kweyisa yo, longola yango pe bwaka yango mosika na yo. Po mieux vaut o bungisa eteni moko ya nzoto na yo, na place nzoto na yo mobimba e bwakama na lifelo.30Pe soki loboko na yo ya droite ezo kweyisa yo, kata yango pe bwaka yango mosika na yo. Po mieux vaut o bungisa eteni moko ya nzoto na yo, na place nzoto na yo mobimba e kende na lifelo.31Ba lobaki pe: "Mutu oyo a longoli mwasi na ye na libala, a pesa ye mokanda ya divorce."32Mais ngai na yebisi bino boye: mutu oyo a longoli mwasi na ye na libala, sauf soki mwasi yango a zalaki infidèle, a tie ye na risque ya ko sala ekobo. Pe mutu oyo a bali mwasi oyo ba longoli na libala, a sali ekobo.33Bo yokaki lisusu que ba lobaki na ba koko: "Ko lapa ndayi ya lokuta te. Mais kokisa makambu oyo o lapi ndayi liboso ya Nkolo que oko sala."34Mais ngai na yebisi bino: bo lapa ndayi ata moke te. Bo lapa ndayi na kombo ya likolo te, po eza kiti ya bokonzi ya Nzambe.35Na kombo ya mabele pe te, po eza esika Nzambe a tiaka makolo na ye. Na kombo ya Jérusalem pe te, po eza ville ya mokonzi monene.36Ko lapa ndayi na motó na yo moko pe te, po o koki te ko komisa ata suki moko pembe to mwindo.37Soki o lobi "oui", e zala oui. Soki o lobi "non", e zala non. Oyo ebakisamaka likolo e wuti na monguna.38Bo yokaki que ba lobaki: "Liso pona liso, pe lino pona lino."39Mais ngai na yebisi bino: bo telemela mutu mabe te. Soki mutu a beti yo mbata na litama ya droite, pesa ye pe litama mosusu.40Soki mutu a lingi ko funda yo pona a zwa elamba na yo, tikela ye pe kazaka na yo.41Soki mutu a forcer yo bo tambola kilomètre moko, kende na ye ba kilomètres mibale.42Pesa mutu oyo a sengi yo, pe ko boya ko defisa mutu oyo a lingi ko defa epa na yo te.43Bo yokaki que ba lobaki: "Linga moninga na yo, pe yina monguna na yo."44Mais ngai na yebisi bino: bo linga ba nguna na bino. Bo pambola ba oyo ba lakelaka bino mabe. Bo salela ba oyo ba yinaka bino makambu ya malamu, pe bo sambela pona ba oyo ba salelaka bino mabe pe ba nyokolaka bino.45Ndenge wana, bo kozala bana ya Père na bino oyo aza na likolo. Po a bimisaka moyi na ye pona batu ya mabe na batu ya malamu, pe a nokisaka mbula pona batu ya bien na ba oyo ya mabe.46Soki bo lingaka kaka batu oyo ba lingaka bino, récompense nini bo mérité? Ata ba futisi mpako ba salaka pe bongo te?47Et puis soki bo pesaka mbote kaka na ba ndeko na bino, nini ya spécial bo sali? Ata ba païens ba salaka pe bongo te?48Donc, bo zala batu ya kokoka, ndenge Père na bino ya likolo aza ya kokoka."‹ PrécédentSuivant ›