Matthieu 17Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Six jours après, Yesu a zui Pierre, Jacques pe Jean, ndeko ya Jacques. A memi bango pembeni na ngomba moko ya molayi.2Liboso na bango, lolenge na ye e bongwani. Elongi na ye e ngengi lokola moyi, pe bilamba na ye e komi pembe lokola pole.3Bongo Moïse pe Élie ba monani liboso na bango, bazo solola na Yesu.4Pierre a zui maloba pe a lobi na Yesu: "Nkolo, eza malamu to zala awa. Soki o lingi, nako tia ba tentes misato: moko pona yo, moko pona Moïse, pe moko pona Élie."5Tangu azalaki nanu ko loba, lipata moko ya lumière e zipi bango. Mongongo e wuti na lipata, e lobi: "Oyo aza Mwana na ngai ya bolingo, oyo na sepelaka na ye mingi. Bo yoka ye!"6Tangu ba disciples ba yoki mongongo wana, ba kweyi bilongi na mabele. Somo monene e kangi bango.7Mais Yesu a pusani, a simbi bango pe a lobi: "Bo telema, bo banga te!"8Ba tomboli miso, pe ba moni kaka Yesu ye moko.9Tangu bazalaki ko kita na ngomba, Yesu a pesi bango ordre: "Bo yebisa mutu moko te vision oyo bo moni, tii tangu Mwana ya mutu ako sekwa parmi bakufi."10Ba disciples ba tuni ye: "pona nini ba moteyi ya mibeko ba lobaka que Élie esengeli a ya liboso?"11A zongisi: "Eza solo, Élie esengeli a ya pe a zongisa makambu nionso na esika na yango.12Mais na lobi na bino: Élie a ya déjà. Ba yebaki ye te, pe ba salaki ye ndenge ba lingaki. Ndenge wana pe, bako monisa Mwana ya mutu pasi."13Alors ba disciples ba comprendre que azalaki ko lobela Jean-Baptiste.14Tangu ba komi pene ya ebele ya batu, mobali moko a ye ko fukama liboso ya Yesu pe a lobi:15"Nkolo, yokela mwana na ngai ya mobali mawa. Aza na maladi ya ndeke pe azo mona pasi makasi. Mbala mingi a kweyaka na moto, pe mbala mingi na mayi.16Na memaki ye epai ya ba disciples na yo, mais ba kokaki ko bikisa ye te."17Yesu a zongisi: "Batu ya génération oyo, boza na kondima te pe boza mabe! Nako zala na bino tii tangu nini? Nako kanga motema pona bino tii tangu nini? Bo memela ngai ye awa."18Yesu a pameli molimo mabe makasi, pe e bimi na mwana. Mwana a biki na heure wana kaka.19Après, ba disciples ba pusani pene ya Yesu kaka bango moko pe ba tuni: "Pona nini biso to kokaki ko bengana molimo mabe wana te?"20A lobi na bango: "Eza po boza na kondima te. Na lobi na bino ya solo: soki boza na kondima lokola mbuma ya moutarde, bokoki ko loba na ngomba oyo: Longwa awa, kende kuna, pe eko kende. Eloko moko te eko zala impossible pona bino.21Mais molimo mabe ya ndenge oyo e bimaka kaka na mabondeli pe na jeûne te."22Tangu bazalaki ko tambola na Galilée, Yesu a lobi na bango: "Bako pesa Mwana ya mutu na maboko ya batu.23Bako boma ye, pe mokolo ya misato ako sekwa." Ba yoki mawa makasi.24Tangu ba komi na Capernaüm, batu oyo ba futisaka mpako ya mbongo ya mabende mibale ba pusani epai ya Pierre pe ba tuni: "Moteyi na bino a futaka mpako ya mbongo ya mabende mibale te?"25A zongisi: "A futaka." Tangu a koti na ndako, Yesu a zwi maloba mutu ya liboso: "Simon, o kanisi nini? Ba rois ya mokili ba futisaka ba taxes pe ba impôts epai ya banani: bana na bango to bapaya?"26A zongisi: "Bapaya." Yesu a lobi: "Alors bana baza na obligation ya ko futa te.27Mais pona to betisa bango libaku te, kende na ebale, bwaka ndobo, pe kamata mbisi ya liboso oyo eko ya. Fungola monoko na yango: oko mona mbongo ya ebende moko. Zwa yango pe pesa bango pona yo pe ngai."‹ PrécédentSuivant ›