Marc 8Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Na mikolo wana, ebele ya batu ba sangani lisusu pe bazalaki na bilei te. Yesu a bengi ba disciples pe a lobi na bango:2"Nazo yokela batu oyo mawa. Basali déjà mikolo misato elongo na ngai, pe baza na eloko ya ko lia te.3Soki na zongisi bango na bandaku na bango na nzala, bako lemba na nzela, po bamosusu ba wuti mosika."4Ba disciples na ye ba zongisi: "Ndenge nini ko zwa mapa ya ko leisa bango ba tonda awa na désert?"5Yesu a tuni: "Boza na mapa boni?" Ba zongisi: "sept."6A yebisi ebele ya batu ba vanda na mabele. A zui mapa sept, a pesi Nzambe matondi, a kati yango pe a pesi ba disciples pona ba kabola. Ba kaboleli batu.7Bazalaki pe na mwa bambisi mike. Yesu a pesi Nzambe matondi pona yango pe a yebisi ba kabola yango pe.8Ba lie pe ba tondi. Ba lokoti bitunga sept oyo e tondi na biteni oyo e tikalaki.9Bazalaki pene na batu quatre mille. Après, Yesu a zongisi bango.10Mbala moko, a mati na bwato elongo na ba disciples na ye pe a keyi na région ya Dalmanutha.11Ba Pharisiens ba ye pe ba bandi ko discuter na Yesu. Pona ko meka ye, ba sengi ye signe moko oyo e wuti na likolo.12Yesu a bendi pema makasi na molimo na ye pe a lobi: "Pona nini génération oyo ezo senga signe? Na yebisi bino ya solo: signe moko te eko pesama na génération oyo."13A tiki bango, a mati lisusu na bwato pe a katisi na ngambo mosusu.14Ba disciples ba bosanaki ko mema mapa. Bazalaki kaka na lipa moko na bwato.15Yesu a kebisi bango: "Bo keba malamu na levure ya ba Pharisiens pe levure ya Hérode."16Ba disciples ba bandi ko solola na kati na bango: "A lobi boye po toza na mapa te."17Yesu a yebi yango pe a lobi: "Pona nini bozo solola ete boza na mapa te? Boza kaka na bososoli te? Bo comprendre nanu te?18Mitema na bino e komi makasi? Boza na miso, mais bo monaka te? Boza na matoyi, mais bo yokaka te? Bo bosani?19Tangu na kataki mapa cinq pona mibali cinq mille, bo lokotaki bitunga boni oyo e tondaki na biteni?" Ba zongisi: "douze."20"Pe tangu na kataki mapa sept pona batu quatre mille, bo lokotaki bitunga boni oyo e tondaki na biteni?" Ba zongisi: "sept."21A lobi na bango: "Bo comprendre nanu te?"22Ba komi na Bethsaïda. Ba memeli Yesu mutu moko oyo a kufaki miso pe ba bondeli ye a simba ye.23Yesu a simbi mutu yango na loboko pe a memi ye libanda ya mboka. A tie soyi na miso na ye, a tie ye maboko pe a tuni ye soki azo mona eloko.24Mutu yango a tali pe a lobi: "Nazo mona batu, mais bazo monana lokola ba nzeté oyo ezo tambola."25Yesu a tie lisusu maboko na miso na ye. Tangu mutu yango a tali malamu, miso na ye e biki pe a moni biloko nionso polele.26Alors Yesu a zongisi ye na ndaku na ye pe a lobi: "Ko kota na mboka te."27Yesu a keyi elongo na ba disciples na ye na bamboka ya Césarée de Philippe. Na nzela, a tuni bango: "Batu ba lobaka ete naza nani?"28Ba zongisi: "Bamosusu ba lobaka Jean-Baptiste, bamosusu Élie, pe bamosusu moko ya basakoli."29A tuni bango: "Pe bino, bo lobaka ete naza nani?" Pierre a zongisi: "Oza Kristu."30Yesu a pekisi bango makasi ete ba yebisa yango mutu moko te.31Après, a bandi ko teya bango ete esengeli Mwana ya mutu a mona pasi mingi, ba anciens, ba chefs ya ba nganga-nzambe pe balakisi ya mibeko ba boya ye, ba boma ye, pe a sekwa après mikolo misato.32Azalaki ko loba makambu yango polele. Pierre a bendi ye pembeni pe a bandi ko pamela ye.33Mais Yesu a baluki, a tali ba disciples na ye pe a pameli Pierre: "Zonga sima na ngai, Satana! Po makanisi na yo eza ya Nzambe te, eza kaka ya batu."34A bengi ebele ya batu elongo na ba disciples na ye pe a lobi: "Soki mutu a lingi ko landa ngai, a miboya ye moko, a mema ekulusu na ye pe a landa ngai.35Po mutu oyo a lingi ko bikisa bomoi na ye ako bungisa yango. Mais mutu oyo ako bungisa bomoi na ye pona ngai pe pona Sango Malamu ako bikisa yango.36Litomba nini mutu ako zwa soki a zui mokili mobimba, mais a bungisi molimo na ye?37Mutu a koki ko pesa nini pona ko somba molimo na ye?38Po mutu oyo ako yokela ngai pe maloba na ngai soni na kati ya génération oyo ya ekobo pe masumu, Mwana ya mutu pe ako yokela ye soni tangu ako ya na nkembo ya Tata na ye elongo na ba anges basantu."‹ PrécédentSuivant ›