Matthieu 9Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Yesu a mati na bwato, a katisi ebale pe a zongi na ville na ye.2Sikoyo, ba memeli ye mutu moko oyo azalaki paralysé, a lali na mbeto. Tangu Yesu a moni kondima na bango, a lobi na mutu yango: "Zala na courage, mwana na ngai. Masumu na yo e limbisami."3Ba lakisi mosusu ya mibeko ba lobi na mitema na bango: "Mutu oyo azo loba maloba ya ko finga Nzambe."4Mais Yesu a yebi makanisi na bango, a lobi: "Pona nini boza na makanisi ya mabe na mitema na bino?5Nini eza facile ko loba: 'Masumu na yo e limbisami', to 'Telema pe tambola'?6Mais pona bo yeba que Mwana ya mutu aza na pouvoir ya ko limbisa masumu awa na mabele..." Alors a lobi na mutu oyo azalaki paralysé: "Telema, zwa mbeto na yo pe zonga na ndaku na yo."7Mutu yango a telemi pe a zongi na ndaku na ye.8Tangu ebele ya batu ba moni bongo, ba yoki somo pe ba pesi Nzambe lokumu, oyo a pesi batu pouvoir ya ndenge wana.9Tangu Yesu a longwe wana pe a keyi mwa mosika, a moni mutu moko na kombo ya Matthieu, a vandi na bureau ya ko futisa mpako. A lobi na ye: "Landa ngai." Matthieu a telemi pe a landi ye.10Tangu Yesu azalaki na mesa na ndaku, ba futisi mpako ebele na batu ya vie ya mabe ba ye ko lia elongo na ye pe na ba disciples na ye.11Ba pharisiens ba moni yango, ba tuni ba disciples na ye: "Pona nini moteyi na bino azo lia elongo na ba futisi mpako pe na batu ya vie ya mabe?"12Yesu a yoki yango pe a lobi: "Eza te batu oyo baza bien nde baza na besoin ya docteur, mais batu oyo bazo bela.13Bo kende ko yekola tina ya maloba oyo: "Oyo na lingi, eza ko yokela batu mawa, eza ba sacrifices te. Po na ye ko benga batu ya juste te, mais batu ya masumu."14Alors, ba disciples ya Jean-Baptiste ba ye epa ya Yesu pe ba tuni ye: "Pona nini biso na ba pharisiens to salaka jeûne, mais ba disciples na yo ba salaka yango te?"15Yesu a zongiseli bango: "Est-ce que ba ninga ya mobali ya libala bakoki ko zala na mawa tangu mobali ya libala aza nanu elongo na bango? Mikolo eko ya oyo bako longola ye na kati na bango. Na tangu wana nde bako sala jeûne.16Mutu moko te a tongaka eteni ya elamba ya sika na elamba ya kala. Po eteni ya sika eko benda elamba ya kala, pe lidusu eko koma monene koleka.17Ba tiaka pe vin ya sika na ba bidons ya kala te. Sinon, ba bidons eko pasuka, vin eko sopana pe ba bidons eko beba. Mais ba tiaka vin ya sika na ba bidons ya sika. Ndenge wana, vin na ba bidons e batelama malamu."18Tangu Yesu azalaki nanu ko loba na bango, mokonzi moko a ye, a fukami liboso na ye pe a lobi: "Mwana na ngai ya mwasi a wuti ko kufa. Mais yaka, tia ye maboko, pe ako zonga na bomoyi."19Yesu a telemi pe a landi ye, elongo na ba disciples na ye.20Sikoyo, mwasi moko oyo makila ezalaki ko bima na nzoto na ye depuis 12 ans a pusani na sima ya Yesu, pe a simbi songe ya elamba na ye.21Po azalaki ko milobela: "Soki na koki kaka ko simba elamba na ye, nako bika."22Yesu a baluki, a moni ye pe a lobi: "Zala na courage, mwana na ngai ya mwasi. Kondima na yo e bikisi yo." Pe kaka na tangu wana, mwasi yango a biki.23Tangu Yesu a komi na ndaku ya mokonzi, a moni batu oyo bazalaki ko beta ba flûtes pe ebele ya batu oyo bazalaki ko sala makelele.24A lobi na bango: "Bo bima! Mwana ya mwasi a kufi te, aza nde ko lala." Mais ba bandi ko seka ye.25Après ba bimisi batu libanda, Yesu a koti, a simbi mwana ya mwasi na loboko, pe mwana a telemi.26Sango ya likambu yango e panzani na territoire wana mobimba.27Tangu Yesu a longwe wana, batu mibale oyo bazalaki ba aveugles ba landi ye, bazo ganga: "Mwana ya David, yokela biso mawa!"28Tangu a komi na ndaku, batu wana ba pusani pene na ye. Yesu a tuni bango: "Bo ndimi que na koki ko sala yango?" Ba zongiseli ye: "Oui, Nkolo!"29Alors a simbi miso na bango pe a lobi: "E salema pona bino ndenge bo ndimi."30Pe miso na bango e fungwami. Yesu a kebisi bango makasi: "Bo keba, mutu moko te a yeba likambu oyo."31Mais tangu ba bimi, ba panzi sango na ye na mboka wana mobimba.32Tangu bazalaki ko kende, ba memeli Yesu mutu moko oyo azalaki na molimo mabe pe azalaki ko loba te.33Après ba bengani molimo mabe, mutu yango a bandi ko loba. Ebele ya batu ba kamwe pe ba lobi: "Na Israël, to tikala ko mona likambu ya boye te!"34Mais ba pharisiens ba lobi: "Eza na nguya ya mokonzi ya milimo mabe nde azo bengana milimo mabe."35Yesu azalaki ko tambola na ba villes pe na ba villages nionso. Azalaki ko teya na ba synagogues, ko sakola sango malamu ya bokonzi, pe ko bikisa batu na bokono na ba pasi ya ndenge nionso.36Tangu a moni ebele ya batu, a yokeli bango mawa makasi, po ba lembaki pe ba bungisaki courage, lokola ba meme oyo baza na mobateli te.37Alors a lobi na ba disciples na ye: "Mbuma ya ko buka eza ebele, mais ba travailleurs baza mukié.38Yango wana, bo sambela Nkolo ya mbuma yango, a tinda ba travailleurs pona ba ya ko buka mbuma na ye."‹ PrécédentSuivant ›