Matthieu 7Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Ko sambisa batu te, pona yo pe ba sambisa yo te.2Po bako sambisa yo ndenge yo o sambisaka ba misusu. Pe mesure oyo o salelaka pona ko mesurer ba misusu, eza kaka yango nde bako salela pona ko mesurer yo.3Pona nini ozo mona lititi oyo eza na liso ya ndeko na yo, mais ozo mona te eteni ya nzete, oyo eza na liso na yo moko?4Ndenge nini o koki ko loba na ndeko na yo: "Tika na longola lititi oyo eza na liso na yo", alors que yo moko oza na nzete na liso?5Yo hypocrite! Longola nanu nzete na liso na yo moko. Après, oko mona malamu pona ko longola lititi na liso ya ndeko na yo.6Ko pesa ba mbwa biloko ya mosantu te. Pe ko bwaka ba perles na yo liboso ya ba ngulu te, noki ba nyata yango, après ba balukela yo pe ba pasola yo.7Senga, pe bako pesa yo. Luka, pe oko mona. Beta na porte, pe bako fungolela yo.8Po mutu nionso oyo a sengaka a zwaka. Oyo a lukaka a monaka. Pe oyo a betaka na porte, ba fungolelaka ye.9Nani na kati na bino, ako pesa mwana libanga soki a sengi ye lipa?10To soki a sengi ye mbisi, oko pesa ye nyoka?11Donc soki bino, na mutema mabe na bino, bo yebi ko pesa bana biloko ya bien, Père na bino oyo aza na likolo ako pesa te biloko ya bien koleka na ba oyo bazo senga ye?12Makambu nionso oyo o lingaka batu ba salela yo, yo pe salela bango yango. Po yango nde mateya ya mibeko pe ya ba sakoli.13Kota na porte ya mukié. Po porte oyo ya monene, pe nzela oyo ya monene, e memaka na ko bunga, pe batu ebele ba kotaka kuna.14Mais porte oyo ya mukié, pe nzela oyo ya mukié, nde e memaka na bomoyi. Et puis batu mukié kaka nde ba monaka yango.15Keba na ba sakoli ya lokuta. Ba yaka na bilamba ya ba meme, mais na kati baza ba mbwa ya zamba ya méchant.16Boko yeba bango na mbuma na bango. Est-ce que ba bukaka ba raisins na ba nzete ya banzube? To ba figues na ba nzete ya banzube?17Nzete nionso ya malamu e botaka mbuma ya malamu. Mais nzete ya mabe e botaka mbuma ya mabe.18Nzete ya malamu ekoki ko bota mbuma ya mabe te, pe nzete ya mabe ekoki ko bota mbuma ya malamu te.19Nzete tout oyo ezo bota mbuma ya malamu te, ba ko kata yango pe ba ko bwaka yango na moto.20Donc, eza na mbuma na bango nde boko yeba bango.21Eza te batu nionso oyo ba lobaka na ngai: "Nkolo, Nkolo!" nde bako kota na bokonzi ya likolo. Kaka mutu oyo a salaka mokano ya Père na ngai oyo aza na likolo nde ako kota.22Na mokolo wana, batu ebele bako loba na ngai: "Nkolo, Nkolo! To sakolaki na kombo na yo te? To benganaki milimo mabe na kombo na yo te? Pe to salaki ba miracles ebele na kombo na yo te?"23Alors nako yebisa bango polele: "Na tikala ko yeba bino te. Bo longwa liboso na ngai, bino batu bo salaka mabe!"24Yango wana, mutu nionso oyo a yoki maloba oyo nazo loba pe a saleli yango, aza lokola mutu ya mayele oyo a tongi ndaku na ye likolo ya libanga.25Mbula e noki, mayi e ye makasi, pe mipepe e beti ndaku yango. Mais e kweyi te, po fondation na yango e tongami likolo ya libanga.26Mais mutu nionso oyo a yoki maloba oyo nazo loba pe saleli yango te, aza lokola mutu ya zoba oyo a tongi ndaku na ye likolo ya zelo.27Mbula e noki, mayi e ye makasi, pe mipepe e beti ndaku yango. Ndaku e kweyi, pe e bebi makasi.28Tangu Yesu a silisaki maloba wana, ebele ya batu ba kamwaki mateya na ye.29Po azalaki ko teya bango na autorité, ndenge moko te na ba lakisi na bango ya mibeko.‹ PrécédentSuivant ›