Matthieu 4Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Après wana, Molimo a memaki Yesu na désert pona diable a meka ye.2Après ko sala jeûne ya 40 jours et 40 nuits, Yesu a yokaki nzala.3Momeki a pusani pene na ye pe a lobi: "Soki oza mwana ya Nzambe, loba na mabanga oyo e koma mapa."4Yesu a zongiseli ye: "E komama: Mutu ako bika kaka na mapa te, mais pe na maloba nionso oyo e wutaka na munoko ya Nzambe."5Après, diable a memi ye na Jérusalem, ville mosantu, pe a telemisi ye na likolo ya temple.6A lobi na ye: "Soki oza mwana ya Nzambe, mi bwaka na se. Po e komama: Nzambe ako pesa ba angelu na ye mitindo pona yo. Bako mema yo na maboko na bango, comme ça lokolo na yo e beta libanga te."7Yesu a zongiseli ye: "E komama pe: Oko meka Nkolo, Nzambe na yo, te."8Diable a memi ye lisusu na ngomba moko ya molayi fort. A lakisi ye ba royaumes nionso ya mokili na lokumu na yango.9A lobi na ye: "Nako pesa yo biloko nionso oyo tout, soki o fukameli ngai pe o sanjoli ngai."10Yesu a lobi na ye: "Longwa awa, Satan! Po e komama: Oko sanjola Nkolo, Nzambe na yo, pe oko salela kaka ye moko."11Alors diable a tiki ye. Pe tala, ba angelu ba ye epa ya Yesu pe ba bandi ko salela ye.12Tangu Yesu a yoki que ba kangi Jean-Baptiste na prison, a zongi na Galilée.13A longwe na Nazareth, a keyi ko vanda na Capernaüm, ville oyo eza pembeni ya ebale ya Galilée, na territoire ya Zabulon na Nephthali.14Pona maloba oyo mosakoli Ésaïe a lobaki e kokisama:15"Batu ya Zabulon na ya Nephthali, na nzela ya ebale, na mboka ko leka Jourdain, pe ya Galilée oyo ya ba pagano:16Batu oyo bazalaki ko vanda na molili ba moni lumière ya monene. Et ba oyo bazalaki ko vanda na mboka oyo ezipami na elili ya liwa, lumière e bimeli bango."17À partir ya tangu wana, Yesu a bandaki ko teya, a lobi: "Bo bongola mitema na bino, po bokonzi ya likolo ekomi pene."18Tangu Yesu azalaki ko tambola pembeni ya ebale ya Galilée, a moni ba ndeko mibali mibale: Simon, oyo ba bengi Pierre, na ndeko na ye André. Bazalaki ko bwaka filet na mayi, po bazalaki ba pêcheurs.19A lobi na bango: "Bo landa ngai, pe nako komisa bino ba pêcheurs ya batu."20Mbala moko, ba tiki ba filets na bango pe ba landi Yesu.21Tangu a keyi mwa mosika, a moni lisusu ba ndeko mibali mibale: Jacques, mwana ya Zébédée, na ndeko na ye Jean. Bazalaki na bwato elongo na père na bango Zébédée, bazo bongisa ba filets na bango.22A bengi bango, mbala moko, ba tiki bwato na père na bango pe ba landi ye.23Yesu azalaki ko tambola na Galilée mobimba. Azalaki ko teya na ba synagogues, ko sakola sango malamu ya bokonzi ya Nzambe, pe ko bikisa batu na bokono na ba pasi ya ndenge nionso.24Sango ya Yesu e panzani na Syrie mobimba. Ba zalaki ko memela ye batu nionso oyo bazalaki ko bela ba maladies ya ndenge na ndenge pe ko yoka pasi makasi: ba oyo bazalaki na milimo mabe, ba oyo bazalaki na maladie ya ndeke, pe ba oyo bazalaki paralysés; Yesu a bikisaki bango.25Ebele ya batu ba landaki ye. Ba wutaki na Galilée, na Décapole, na Jérusalem, na Judée, pe na ngambo mosusu ya Jourdain.‹ PrécédentSuivant ›