Matthieu 3Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Na tangu wana, Jean-Baptiste a bimaki pe azalaki ko sakola na désert ya Judée.2Azalaki ko loba: "Bo bongola mitema na bino, po bokonzi ya likolo ekomi pene."3Jean aza mutu oyo mosakoli Ésaïe a lobelaki: "Mungongo ya oyo azo ganga na désert: bo bongisa nzela ya Nkolo, bo sembola ba nzela na ye."4Jean azalaki ko lata elamba ya poils ya chameau, na ceinture ya cuir na loketo. Azalaki ko lia mabanki na mafuta ya nzoyi ya zamba.5Batu ya Jérusalem, ya Judée mobimba, na ya ba territoires nionso ya pembeni ya Jourdain bazalaki ko ya epa na ye.6Bazalaki ko yambola masumu na bango, pe Jean azalaki ko batisa bango na ebale ya Jourdain.7Mais tangu a moni ba pharisiens na ba sadducéens ebele bazo ya pona a batisa bango, a lobi: "Bino bana ya ba banyoka! Nani a yebisi bino bo kima kanda oyo ezo ya?"8Bo bota nde mbuma oyo e lakisi que bo bongoli mitema na bino.9Pe bo milobela na mitema na bino te que: "Abraham aza père na biso!". Po na yebisi bino, Nzambe akoki ko bimisa bana ya Abraham à partir ya mabanga oyo.10Déjà, epasola eza na misisa ya ba nzete. Donc, nzete nionso oyo eko bota mbuma ya malamu te, bako kata yango pe bako bwaka yango na moto.11Nga nazo batisa bino na mayi pona bo bongola mitema na bino. Mais oyo azo ya sima na ngai aza na nguya koleka ngai, pe na koki ata ko kofungola ba singa ya sandale na ye te. Ye ako batisa bino na Molimo Mosantu pe na moto.12A simbi kiyungulu na loboko na ye, ya ko kabola blé na matiti. Ako petola esika na ye ya ko bongisa blé, pe ako tia blé na ye na dépôt. Mais ako tumba matiti na moto oyo kufaka te.13Na tangu wana, Yesu a wuti na Galilée, a ye epa ya Jean na Jourdain pona Jean a baptiser ye.14Mais Jean azalaki ko boya, a lobi: "Nga nde kutu naza na besoin yo o baptiser ngai, mais yo oye epa na ngai!"15Yesu a zongiseli ye: "Tika to sala yango sikoyo, po eza ndenge wana nde to sengeli ko kokisa makambu nionso oyo eza juste." Alors Jean a ndimi.16Mbala moko après ko batisama, Yesu a bimi na mayi. Sikoyo tala, likolo e fungwami, pe a moni Molimo ya Nzambe azo kita lokola colombe, aye likolo na ye.17Pe mungongo e wuti na likolo e yokani, e lobi: "Oyo aza mwana na ngai ya bolingo, oyo a sepelisaka ngai fort."‹ PrécédentSuivant ›