Matthieu 2Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Après ko botama ya Yesu na Bethléhem oyo eza na Judée, na tangu roi Hérode azalaki ko konza, ba mages ba yaki, ba wutaki na est ya Jérusalem.2Ba tuni, "wapi mukonzi ya ba Juifs oyo a wuti ko botama? To moni étoile na ye depuis est, yango to ye ko sanjola ye."3Tangu roi Hérode ayoki masolo yango, a zwi trouble, na batu nionso pe ya Jérusalem ba zwi troube elongo na ye.4A sangisi ba grand prêtres na ba djogo ya mibeko, a tuni bango soki Kristu fallait a botama wapi.5Ba lobi, "na Bethléhem oyo eza na Judée, po mosakoli a koma:6Yo, Bethléhem, mabele ya Judée, oza mukié te na ba villes oyo ya Judée, pona e payi na yo ako bima oyo ako konza, pe ako kamba bana na ngai ya Israël.7Après, Hérode a bengi ba mages na ndenge ya ko batama pona a yeba tangu nini étoile yango e bimaki pona mbala ya liboso.8A tindi bango na Bethléhem , a lobi: "bo kende ko luka mwana malamu. Soki bo moni ye, bo tia nga na temps, comme ça nga pe na kende ko sanjola ye".9Après ko yoka roi, ba mages ba leki nzela. Sikoyo tala, étoile oyo ba monaki na est ezalaki ko kende liboso na bango ti eye ko telema esika mwana azalaki.10Tangu ba moni étoile, ba zalaki na esengo fort.11Ba koti na ndaku pe ba moni mwana na mère na ye Marie. Ba fukami pe ba sanjoli ye. Ba fongoli ba coffres na bango, ba pesi mwana ba cadeaux ya: or, encens na myrrhe.12Lokola ba kebisamaki na ndoto ba zongela Hérode te, ba zwi nzela mususu pona ko zonga na mboka na bango.13Après ko zonga ya ba mages, angelu ya Nkolo a bimeli Joseph na ndoto, a lobi, "lamuka! Zwa mwana na mère na ye bo kima na Égypte. Bo tikala kuna ti tangu nako yebisa yo, parce que ba kala mingi te, Hérode ako luka mwana pona a boma ye."14Joseph a lamuki, butu butu, a memi mwana na mère na ye na Égypte.15A tikali kuna ti tangu Hérode a kufi. Yango e kokisi oyo Nkolo a lobaki na monoko ya mosakoli: na bengi mwana na ngai libanda ya Égypte.16Tangu Hérode a comprendre que ba mages ba lekeli ye na mayele, a tomboki fort. A tindi ba mbila ba boma bana tout ya 2 ans ti na se, na Bethléhem na ba territoires nionso ya pembeni, na ndenge ya temps oyo a yokaka epa ya ba mages.17Yango e kokisaki liloba e pesama na munoko ya mosakoli Jérémie:18Mungongo e yokani na Rama, milelo na milelo. Rachel azo lela bana na ye, a boyi mutu a calmer ye, po bana baza lisusu te.19Après liwa ya roi Hérode, angelu ya Nkolo a bimeli Joseph kuna na Égypte.20"Lamuka", angelu a lobi, "zwa mwana na mère na ye bokende na mboka Israël. Ba oyo bazalaki ko luka ko boma mwana basi ba kufi."21Joseph a lamuki, a zwi mwana na mère na ye, ba keyi na mboka Israël.22Mais tangu a yoki que Archélaüs azalaki ko konza Judée na place ya père na ye Hérode, Joseph a bangaki ko kende kuna. Et puis, lokola ba kebisaki ye pe na ndoto, a kendaki ko vanda na territoire ya Galilée.23A vandaki na cité moko ba bengi Nazareth, comme ça maloba oyo e lobamaka na minoko ya ba sakoli e kokisama: ako bengama mwa ya Nazareth.‹ PrécédentSuivant ›