Marc 2Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Sima mwa mikolo, Yesu a zongi na Capernaüm. Batu ba yoki ete aza na ndaku.2Batu ebele ba sangani, tii esika e zalaki lisusu te liboso ya porte. Yesu azalaki ko yebisa bango liloba ya Nzambe.3Batu ba ye epai na ye, ba memi mutu moko oyo azalaki paralysé. Mibali quatre ba memaki ye.4Lokola ebele ya batu e salaki que moyen ya ko pusana pene na Yesu ezalaki te, ba longoli ndambu ya toit ya ndaku na esika Yesu azalaki. Ba sali lidusu pe ba kitisi mbeto esika mutu yango a lalaki.5Tangu Yesu a moni kondima na bango, a lobi na mutu oyo azalaki paralysé: "Mwana na ngai, masumu na yo e limbisami."6Balakisi mosusu ya mibeko bazalaki ya ko vanda wana. Na kati ya mitema na bango, bazalaki ko kanisa:7"Pona nini mutu oyo azo loba boye? Azo kofinga Nzambe. nani a koki ko limbisa masumu, soki Nzambe ye moko te?"8Mbala moko, Yesu a yebi na molimo na ye makambu oyo bazalaki ko kanisa. A lobi na bango: "Pona nini bozo kanisa makambu ya boye na mitema na bino?9Eloko nini eza facile: ko loba na mutu oyo aza paralysé: Masumu na yo e limbisami, to ko loba: Telema, zwa mbeto na yo pe tambola?10Mais pona bo yeba que Mwana ya mutu aza na pouvoir ya ko limbisa masumu awa na mokili..."11A lobi na mutu oyo azalaki paralysé: "Na lobi na yo, telema, zwa mbeto na yo pe kende na ndaku na yo."12Mbala moko, mutu yango a telemi, a zui mbeto na ye pe a bimi na miso ya batu nionso. Bango nionso ba kamwe pe ba kumisi Nzambe, ba lobi: "To tikala ko mona eloko ya boye te!"13Yesu a bimi lisusu pembeni ya ebale. Ebele ya batu bazalaki ko ya epai na ye, pe azalaki ko teya bango.14Tangu azalaki ko leka, a moni Lévi, mwana ya Alphée, a vandi na bureau ya ba impôts. A lobi na ye: "Landa ngai." Lévi a telemi pe a landi ye.15Tangu Yesu azalaki ko lia na ndaku ya Lévi, bafutisi ya ba impôts mingi pe batu ya masumu ba vandi na mesa elongo na ye pe ba disciples na ye. Bazalaki ebele, pe ba landaki ye.16Tangu balakisi ya mibeko pe ba Pharisiens ba moni ye azo lia na bafutisi ya ba impôts pe batu ya masumu, ba tuni ba disciples na ye: "Pona nini azo lia pe azo mela elongo na bafutisi ya ba impôts pe batu ya masumu?"17Yesu a yoki bango pe a lobi: "Batu oyo baza malamu baza na besoin ya monganga te; babeli nde baza na besoin na ye. Na ye pona ko benga batu ya sembo te, mais batu ya masumu."18Ba disciples ya Jean pe ba Pharisiens bazalaki ko jeûner. Batu ba ye ko tuna Yesu: "Pona nini ba disciples ya Jean pe oyo ya ba Pharisiens bazo jeûner, mais ba disciples na yo bazo jeûner te?"19Yesu a zongiseli bango: "Baninga ya mobali ya libala ba koki ko jeûner tangu mobali ya libala aza elongo na bango? Tangu nionso aza na bango, ba koki ko jeûner te.20Mais mikolo eko ya oyo bako longola mobali ya libala na kati na bango. Na mokolo wana, bako jeûner.21Mutu moko te a tongaka eteni ya elamba ya sika na elamba ya kala. Soki a sali bongo, eteni ya sika eko benda ndambu ya elamba ya kala, pe lidusu eko koma monene koleka.22Mutu moko te a tiaka vin ya sika na basaki ya kala oyo e salama na poso ya nyama. Soki a sali bongo, vin eko pasola basaki, pe vin na basaki eko beba. Esengeli ko tia vin ya sika na basaki ya sika."23Mokolo moko ya sabbat, Yesu azalaki ko katisa bilanga ya blé. Na nzela, ba disciples na ye ba bandi ko buka ba épis ya blé.24Ba Pharisiens ba lobi na ye: "Tala! Pona nini bazo sala eloko oyo mibeko e pekisi na mokolo ya sabbat?"25Yesu a zongiseli bango: "Bo tanga te oyo David a salaki tangu azalaki na besoin ya bilei, pe ye na batu oyo bazalaki na ye ba yokaki nzala?26A kotaki na ndaku ya Nzambe na époque oyo Abiathar azalaki mokonzi ya ba nganga-nzambe. A liaki mapa oyo e pesamaki na Nzambe, oyo kaka ba nganga-nzambe nde baza na permission ya ko lia. A pesaki yango pe na batu oyo bazalaki elongo na ye."27Après, a lobi na bango: "Sabbat e salamaki pona mutu; mutu a salamaki pona sabbat te.28Yango wana, Mwana ya mutu aza Nkolo ata ya sabbat."‹ PrécédentSuivant ›