Matthieu 1Lingala facileTouchez un verset pour le sélectionner.1Liste ya ba koko ya Yesu Kristu, mwana ya David, mwana ya Abraham:2Abraham a bota Isaac. Isaac a bota Jacob. Jacob a bota Juda na ba ndeko na ye.3Juda a bota Pharès na Zara; mère na bango ezalaki Thamar. Pharès a bota Esrom. Esrom a bota Aram.4Aram a bota Aminadab. Aminadab a bota Naasson. Naasson a bota Salmon.5Salmon a bota Boaz; mère na ye ezalaki Rahab. Boaz a bota Obed; mère na ye ezalaki Ruth. Obed a bota Jessé.6Jessé a bota roi David. David a bota Salomon, oyo mère na ye azalaki mwasi ya Urie.7Salomon a bota Roboam. Roboam a bota Abia. Abia a bota Asa.8Asa a bota Josaphat. Josaphat a bota Joram. Joram a bota Ozias.9Ozias a bota Joatham. Joatham a bota Achaz. Achaz a bota Ézéchias.10Ézéchias a bota Manassé. Manassé a bota Amon. Amon a bota Josias.11Josias a bota Jéchonias na ba ndeko na ye. Wana ezalaki na époque oyo ba memaki bango na makasi na Babylone.12Après masolo ya Babylone, Jéchonias a bota Salathiel. Salathiel a bota Zorobabel.13Zorobabel a bota Abiud. Abiud a bota Éliakim. Éliakim a bota Azor.14Azor a bota Sadok. Sadok a bota Achim. Achim a bota Éliud.15Éliud a bota Éléazar. Éléazar a bota Matthan. Matthan a bota Jacob.16Jacob a bota Joseph, mobali ya Marie, oyo a bota Yesu, oyo ba bengi Kristu.17Donc, ezalaki 14 générations soki o tangi à partir ya Abraham ti na David; 14 générations à partir ya David ti tangu ba memaki bango na makasi na Babylone; et 14 générations à partir ya ko kende Babylone ti na Kristu.18Oyo lisolo ya ndenge Yesu Kristu a botamaki. Tangu mère na ye Marie azalaki fiancée ya Joseph, avant ba balana, akomaki na zemi ya Molimo Mosantu.19Mobali na ye Joseph azalaki mutu moko ya bien. A boyaki ko sambwisa ye, yango wana a zwaki décision ba kabwana na kimwa e yebana te.20Tangu azo kanisa makambu yango, angelu ya Nkolo a bimeli ye na ndoto, a lobi: "Joseph mwana ya David, ko banga ko bala Marie te, pona mwana oyo ye a memi a zwamaki na Molimo Mosantu.21Ako bota mwana mobali, oko pesa ye kombo ya Yesu, po ye nde ako bikisa batu na ye na masumu na bango."22Sikoyo, nionso oyo e salemaki pona oyo Nkolo a lobaka na monoko ya mosakoli e kokisama:23Tala! Ngondo ako zwa zemi pe ako bota mwana mobali, bako benga ye Emmanuel, oyo elakisi Nzambe aza na biso.24Tangu Joseph a lamuki, a sali kaka ndenge angelu ya Nzambe a yebisaki ye, a bali Marie.25Mais, a sangisaki nzoto na ye te ti tangu a botaki mwana mobali. Joseph a pesi ye kombo ya Yesu.Suivant ›